Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISALISI MPO NA LIBOTA | KOBƆKƆLA BANA

Ndenge ya kosolola ná mwana na yo oyo akómi elenge

Ndenge ya kosolola ná mwana na yo oyo akómi elenge

MOKAKATANO

Ntango azalaki naino mwana, azalaki koyebisa yo makambo nyonso. Lokola akómi elenge, azali lisusu koyebisa yo eloko moko te. Ntango ozali koluka kosolola ná ye azali kokatela yo mangala to kobimisela yo maloba oyo ekopelisa ndako mɔtɔ.

Okoki koyeba ndenge ya kosolola ná mwana na yo oyo akómi elenge. Tótalela naino makambo mibale oyo ekoki kobimisa mikakatano. *

NINI ESALAKA BONGO?

Mposa ya kozala na lipanda. Mpo mwana na yo akóma mokóló oyo ayebi kotambwisa bomoi na ye malamu, ezali likambo ya lelo to lobi te. Toboyi te, bilenge mosusu balingaka kozala na bonsomi koleka ndelo; epai mosusu, baboti mosusu mpe bapesaka bana na bango bonsomi moke koleka oyo basengeli na yango. Yango ekoki kobimisa matata mingi kati na baboti mpe bana. Brad * elenge moko ya mbula 16 amilelaki boye: “Baboti na ngai balukaka kolandela likambo nyonso oyo nasalaka. Soki bapesi ngai bonsomi mingi te, ntango nakokóma na mbula 18, nakotikela bango ndako na bango!”

Likoki ya kokanisa. Bana mike basukaka kaka na kokanisa ete makambo nyonso ezali malamu to mabe, kasi bilenge basosolaka likambo. Likoki ya kokanisa ezali na ntina mpo esalisaka elenge ayeba kososola likambo malamumalamu. Mpo na mwana moke kolimbola liloba bosembo ezali mpasi te, ezali na yango kaka mwa kalkile. Na ndakisa akoki koloba: ‘Mama akabolaki gato na biteni mibale, apesaki ngai eteni moko mpe eteni mosusu apesaki ndeko na ngai.’ Nzokande, bilenge bayebaka ete kosala likambo na bosembo ezali pɛtɛɛ te. Kutu kosala likambo na bosembo elakisaka ntango nyonso te kosalela bato makambo ndenge moko, mpe kosalela bato makambo ndenge moko elakisaka ntango nyonso te kosala na bosembo. Likoki ya kokanisa esalisaka elenge ayeba kolonga likambo ya mpasi lokola oyo. Na ngambo mosusu ekoki kosala ete aboya kondima makanisi na yo.

OKOKI KOSALA BOYE

Soki likoki ezali, bósololaka na mabaku mosusu. Saleláká libaku nyonso oyo emonani. Na ndakisa, baboti mosusu bamonaka ete ezalaka mpasi te bilenge báfungolela baboti na bango motema ntango bazali kosala misala ya ndako to kotambola na motuka elongo, koleka ndenge basololaka ntango bazali kotalana na miso.​—Toli ya Biblia: Kolimbola Mibeko 6:6, 7.

Masolo milaimilai te. Ezali na ntina te bóswanaka mpo na likambo nyonso. Kutu, pesá likanisi na yo . . . mpe suká kaka wana. Makambo mingi oyo oyebisi ye, “akoyoka” yango na nsima mpe akokanisa yango ntango akozala ye moko. Pesá ye libaku ya kosala bongo.​—Toli ya Biblia: Masese 1:1-4.

Yokaká​—mpe kozala makambo makasi te. Mpo oyeba likambo na ye malamumalamu, yokaká na likebi mpenza mpe kokataka ye maloba te. Ntango ozali koyanola, kozala makambo makasimakasi te. Soki ozali kolandela likambo nyonso, mwana na yo akoki koluka ndenge ya koboya kotosa kozanga ete azwela yango etumbu. Buku moko (Staying Connected to Your Teenager) elobi boye: “Yango nde etindaka bana bakóma na bomoi ya lolenge mibale. Epai mosusu balobaka na baboti na bango makambo oyo bazali na mposa ya koyoka, mpe na ngambo mosusu basalaka makambo oyo balingaka ntango baboti na bango bazali te.”​—Toli ya Biblia: Bafilipi 4:5.

Zalá kimya. Elenge moko na nkombo Kari alobi boye: “Soki toyokani te na mama, akómaka kosilika mpo na likambo nyonso nalobaka. Yango esilikisaka ngai, mpe masolo na biso ebongwanaka koswana.” Na esika ya koyeisa makambo minene, lobá nde likambo moko oyo ekomonisa ete ozali komitya na esika ya mwana na yo. Na ndakisa, na esika ya koloba, “ezali na yango likambo moke!” okoki koloba, “namoni mpenza ndenge likambo yango etungisi yo.”​—Toli ya Biblia: Masese 10:19.

Soki esengeli, lakisá ye nzela kasi kokweisela ye mitindo te. Likoki ya kokanisa ya mwana na yo ezali lokola misisa ya nzoto oyo ezali na mposa ya kokemba. Na yango, ntango akutani na likambo oyo asengeli kozwa ekateli, kosala yango na esika na ye te. Ntango bozali kosolola likambo yango, tiká ye moko aluka ndenge ya kosilisa makambo mosusu. Nsima ya kopesa ye mwa makanisi, okoki koyebisa ye boye: “Oyo ezali kaka mwa makanisi napesi. Natikeli yo mokolo moko to mibale mpo otalela makanisi yango, mpe na nsima tokokutana lisusu mpo na kolobela ekateli oyo omoni ete ezali malamu mpe mpo na nini.”​—Toli ya Biblia: Baebre 5:14.

^ par. 5 Na lisolo oyo tolobeli bilenge nyonso ezala mibali to basi.

^ par. 7 Na lisolo oyo bankombo mosusu ezali ya bango te.