Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | MPO NA NINI KOKOBA KOZALA NA BOMOI?

Mpo makambo ebongwanaka

Mpo makambo ebongwanaka

“Tokamolami na ndenge nyonso, kasi tofinani te tii tózanga koningana; tosili mayele, kasi tozangi mwa nzela ya kobima te.”​—2 BAKORINTI 4:8.

Bato balobaka ete komiboma ezali “lolenge moko ya kosilisa mpo na libela likambo moko oyo ekoki koleka na yango.” Ata soki okanisi ete ekoki kosalema te ete likambo moko oyo ezali kotungisa yo esila, to ozali komona ete okokoka te kosilisa yango​—ekoki kozala kaka mpo na mwa ntango. Kutu, ekoki kokóma malamu koleka na ndenge oyo okanisaki te.​—Talá etanda  “Makambo ya bomoi na bango ebongwanaki.”

Ata soki likambo yango ebongwani te, ekozala malamu kobundisa yango mokolo na mokolo. Yesu alobaki boye: “Bómitungisa ata moke te mpo na mokolo oyo ekolanda, mpo mokolo oyo ekolanda ekozala na mitungisi na yango moko. Mokolo na mokolo ezali na mitungisi na yango.”​—Matai 6:34.

Bongo soki likambo yango ekoki kobongwana te? Na ndakisa, kanisá ete ozali na maladi moko oyo esilaka te, libala na yo ekufi, ndeko to moninga na yo akufi.

Ata na makambo ya ndenge wana, ezali na eloko moko oyo okoki kobongola: Ndenge ya kotalela likambo yango. Koyeba ete ezali na makambo oyo okokoka te kobongola ekosalisa yo okóma kotalela makambo na ndenge ya malamu. (Masese 15:15) Ekosalisa mpe yo oluka ndenge ya koyikela yango mpiko na esika ya koluka komiboma mpo likambo yango esila. Ekosalisa yo na nini? Atako okokoka te kosilisa likambo yango, okoyeba ndenge ya kotalela yango malamumalamu.​—Yobo 2:10.

KOBOSANA LIKAMBO OYO TE: Okoki te komata ngomba kaka na mbala moko; kasi mokemoke okoki kosilisa komata yango. Ezali mpe bongo mpo na mikakatano mingi oyo okutanaka na yango, ata soki mikakatano yango ekoki komonana lokola ngomba.

OYO OKOKI KOSALA LELO: Sololá na moto moko likambo yango; okoki kosolola na moninga to moto moko ya libota na yo. Moto yango akoki kosalisa yo otalela lisusu likambo yango na ndenge oyo ebongi.​—Masese 11:14.