Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Matoi ya mwa nyama babengi gallérie eyokaka na ndenge ya kokamwa mpenza

Matoi ya mwa nyama babengi gallérie eyokaka na ndenge ya kokamwa mpenza

GALLÉRIE to fausse teigne ekoki koyoka malamu ata na makelele ya makasi koleka ekelamu nyonso awa na mokili. Atako matoi na ye ezali mike lokola nsɔngɛ ya ntonga, ezali mindɔndɔ te.

Tókanisa naino: Banda bambula mingi bato bazali koyekola mwa nyama yango. Kaka kala mingi te, bato ya siansi na iniversite ya Strathclyde, na Écosse, basalelaki makelele ya ndenge na ndenge mpo na komeka matoi ya mwa nyama yango. Bazwaki mezire ya ndenge tympan na yango eninganaki mpe batalaki mosala oyo baselile oyo esalisaka yango eyoka esalaki. Ata ntango batyelaki yango makelele ya makasi mpenza (300 kilohertz), tympan yango ezalaki kaka koyoka malamu. Nzokande, matoi ya ngembo eyokaka na makelele ya (212 kilohertz), mbisi ya monene oyo babengi dauphin (160 kilohertz) mpe matoi na biso bato esukaka na koyoka makelele ya (20 kilohertz).

Bato ya mayele bazali kolinga kosalela likoki ya koyoka oyo matoi ya mwa nyama yango ezalaka na yango mpo na kobimisa baaparɛyi ya sika. Ndenge nini? Doktɛrɛ James Windmill ya iniversite ya Strathclyde alobi “mpo básala bamikro ya mike kasi ya malamu koleka. Bakoki kotya mikro yango na baaparɛyi ndenge na ndenge, na ndakisa batelefone mpe na baaparɛyi oyo esalisaka bato oyo bayokaka malamu te.”

Okanisi nini? Ndenge matoi ya gallérie eyokaka, ebimá kaka yango moko to basalaki yango kosala?