Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | BALONGI MOKAKATANO ETALI MINƆKƆ

Balongi mokakatano oyo ezalaki kokabola bato

Balongi mokakatano oyo ezalaki kokabola bato

MINƆKƆ soki 7 000 oyo ezali lelo na mokili etungisaka bato ya mobembo, ya mombongo, ya kelasi mpe guvɛrnema. Yango ebandá kala mpenza. Na ndakisa, eleki sikoyo mbula soki 2 500, na boyangeli ya Mokonzi Ahasueruse (to Zerezese I), Baperse bapesaki mibeko na bitúká 127 oyo bazalaki koyangela, ‘kobanda na India tii na Etiopi, etúká mokomoko na kolanda ekomeli na yango mpe ekólo mokomoko na kolanda monɔkɔ na yango.’ *

Lelo oyo, bibongiseli mingi, ata mpe baguvɛrnema bamekaka te kosala likambo ya mpasi bongo. Nzokande, ezali na ebongiseli moko oyo elongi kosala yango. Batatoli ya Yehova babimisaka bazulunalo, babimisaka ba CD ya koyoka, bavideo mpe babuku ebele, ezala mpe Biblia na minɔkɔ koleka 750. Na kati na yango ezali mpe na mikanda na elobeli ya bikela na minɔkɔ soki 80 mpo na bababa. Batatoli ya Yehova babimisaka mpe mikanda na ekomeli ya bato bakufá miso (Braille) na minɔkɔ ndenge na ndenge.

Kasi, likambo ya kokamwa, Batatoli ya Yehova basɛngaka mbongo te na mosala oyo basalaka. Kutu, ezala bato oyo babongolaka mikanda ná baoyo basalaka misala mosusu, basalaka yango na bolingo na bango moko. Mpo na nini basalaka milende ya kobongola na minɔkɔ ebele, mpe ndenge nini basalaka yango?

^ par. 3 Talá Estere 8:9 na Biblia.