Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Balongi mokakatano etali minɔkɔ—Talá ndenge esalemaka

Balongi mokakatano etali minɔkɔ—Talá ndenge esalemaka

“Bato balobaka ete, mosala ya kobongola mikanda eleki misala nyonso na makasi.”“The Cambridge Encyclopedia of Language.”

LIBOSO mikanda ya Batatoli ya Yehova ebongolama, babongisaka yango malamu, balukaka makambo oyo bakokoma, na nsima bakomi yango. Na ntango yango, Departema ya Bokomi ya Biro monene na bango na New York elukaka koyeba soki makambo oyo bakomi ezali mpenza solo, ekomami malamu mpe ekoki kotángama malamu. *

Na nsima, Departema ya Bokomi etindaka yango epai ya ebele ya bikipi ya kobongola na mokili mobimba; bandeko ya bikipi yango bafandaka esika monɔkɔ oyo bazali kobongola elobamaka mpe basalaka wana. Mingi babongolaka na minɔkɔ ya mboka na bango. Basengeli koyeba malamu makambo oyo ekomami na Lingelesi mpe koyeba monɔkɔ oyo bazali kobongola.

Ndenge nini babongoli basalaka mosala na bango?

Geraint, ye afandaka na Grande-Bretagne, alobi boye: “Nazali moko ya babongoli, koyokana malamu ezali na ntina mingi. Tolukaka kosilisa elongo mikakatano oyo ebimaka na mosala ya kobongola. Totyaka likebi kaka na liloba mokomoko te kasi nde na maloba mingi to bafraze. Totalelaka malamu ndimbola mpe ntina na yango, mpe tokanisaka baoyo bakotánga yango.”

Mokano ya mobongoli ezali nini?

“Mokano na biso ezali ete motángi amona ete mokanda ekomami mbala moko na monɔkɔ ya mboka na ye. Eyebana te ete babongolaki yango kobongola. Yango wana, tosalaka nyonso tókoma ndenge bato balobaka. Na ndenge yango, tokobenda likebi ya motángi, mpe akokoba kotánga yango lokola nde azali kolya bilei ya kitoko mpe ya elɛngi.”

Kofanda esika monɔkɔ elobamaka ezali na litomba nini?

“Kofanda na bato oyo balobaka monɔkɔ yango esalisaka biso tóbongola na ndenge oyo bakokanga ntina mpo toyokaka ndenge balobaka mokolo na mokolo. Lisusu, tokoki kotuna bato mpo tóyeba soki maloba tosalelaka ezali ndenge oyo balobaka, mindɔndɔ te mpe ebongi. Yango esalisaka biso tóbimisa mpenza makanisi ndenge ezali na Lingelesi.”

Mosala na bino ebongisami ndenge nini?

“Bapesaka ekipi mokomoko mosala na bango. Liboso, moto mokomoko ya ekipi akotánga lisolo na Lingelesi mpo azala na likanisi, ayeba ndenge oyo makanisi elandani, ayeba mpe bato oyo lisolo yango elobeli. Tomitunaka boye: ‘Motó ya likambo na yango ezali nini, mpe ntina na yango ezali nini? Liteya nini nakozwa?’ Yango ekoki kosalisa biso ntango tokobanda kobongola.”

“Na nsima, moto na moto akopesa likanisi na ye. Tokangi mpenza ntina ya lisolo yango? Ndenge nini tokoki kobimisa makanisi ndenge ezali na Lingelesi? Mokano na biso ezali ete moto oyo atángi makambo oyo tobongoli ná oyo atángi na Lingelesi bákanga ntina ndenge moko.”

Ndenge nini bandeko yango basalaka?

“Mokano na biso ezali ete ntango kaka moto akotánga akanga mbala moko ntina ya likambo. Yango wana, soki tobongoli paragrafe moko totángaka yango mbala mingi na mongongo makasi.”

“Mobongoli azali kokoma na monɔkɔ oyo tozali kobongola mpe biso tozali kotala na baordinatɛrɛ na biso. Na nsima tokotala soki makanisi mosusu elongwe to ebakisami. Tokotala lisusu soki elobeli ezali pɛtɛɛ, ekotángama malamu, mpe ekomami na ndenge ebongi. Na nsima, moto moko akotánga paragrafe yango na mongongo makasi. Soki akangami esika moko boye, tolukaka koyeba mpo na nini akangami. Soki lisolo mobimba esili, moto moko akotánga yango na mongongo makasi mpe basusu bazali kozwa nɔti, bazali koluka bisika oyo basengeli kobongisa.”

Ezali mpenza mosala makasi!

“Ɛɛ! Kutu soki tokómi na mpokwa tolɛmbaka mingi mpenza. Lobi na ntɔngɔ, totalaka lisusu lisolo yango. Nsima ya mwa bapɔsɔ, Departema ya Bokomi ekotindela biso lisusu lisolo yango na Lingelesi, babongisi bisika oyo esengeli kobongisa. Na nsima, tokotánga lisolo na makanisi ya sika mpo tóbongisa yango malamu.”

Baprogramɛ nini bosalelaka mpo na kobongola?

“Ordinatɛrɛ ekoki kozwa esika ya moto te. Kasi, Batatoli ya Yehova basalá programɛ ya kobongola mikanda oyo esalisaka mpo misala ezala pɛpɛlɛ. Ezali na diksionɛrɛ moko boye oyo ebombaka maloba oyo tosalelaka mingi. Esaleli mosusu esalisaka biso tóluka eloko nyonso oyo ekipi na biso ebongolá mpe tótala ndenge babongolaki makambo mosusu ya makasi.”

Oyokaka ndenge nini mpo na mosala yango?

“Tomonaka ete mosala na biso ezali likabo mpo na bato. Mpe tosalaka nyonso mpo básepela kotánga mpe bázwa matomba. Tosepelaka makasi soki lisolo moko ya zulunalo to oyo ezali na Internet esimbi motema ya motángi mpe ebongoli bomoi na ye.”

Matomba ya libela na libela

Bato ebele na mokili bazwaka matomba ndenge batángaka mikanda ya Batatoli ya Yehova na minɔkɔ na bango. Toli ya malamu oyo ezali na mikanda, bavideo mpe na site ya Internet jw.org, eutaka na Biblia. Kutu, buku yango ezali mokanda ya Nzambe, oyo nkombo na ye ezali Yehova, ayebisi biso ete alingi bato ya “bikólo nyonso mpe mabota nyonso mpe minɔkɔ nyonso” báyoka nsango na ye.Emoniseli 14:6. *

^ par. 4 Bakomaka makambo yango na Lingelesi.

^ par. 25 Kɔtá na www.mt711.com mpo obimisa mokanda na mabɔkɔ, mpo oyoka koyoka to mpe otala bavideo na monɔkɔ na bino to na minɔkɔ mosusu.