Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bampasi​—Ezali nde etumbu ya Nzambe?

Bampasi​—Ezali nde etumbu ya Nzambe?

LUZIA ATAMBOLAKA MALAMU TE NA LOKOLO YA MWASI. Abɛlaká bukabuka na bomwana. Ntango Luzia akómaki na mbula 16, azalaki kosala epai ya mwasi moko, mpe mwasi yango alobaki na ye: “Nzambe apesá yo etumbu otambolaka malamu te mpo ozalaki mwana mabe mpe ozalaki kotosa mama na yo te.” Atako eleká bambula ebele, Luzia abosanaka te ndenge maloba wana eyokisaki ye motema mpasi.

NTANGO BAYEBISAKI DAMARIS ETE AZALI NA KANSER YA BƆƆNGƆ, papa na ye atunaki ye: “Osalaki nini mpo likambo ya boye ekómela yo? Namoni osalaki likambo moko ya mabe mpenza. Yango wana Nzambe apesi yo etumbu.” Maloba wana esalaki Damaris motema mpasi.

Banda kala bato mingi bakanisaka ete maladi ezalaka etumbu ya Nzambe. Buku moko (Manners and Customs of Bible Lands) elobi ete na ntango ya Yesu bato mingi bazalaki kokanisa ete “moto azalaki kozwa maladi mpo na lisumu na ye, to ya bandeko na ye, mpe ezalaki etumbu na ye mpo na lisumu wana.” Buku mosusu (Medieval Medicine and the Plague) elobi ete basiɛklɛ mingi nsima ya Yesu Kristo, “bato mosusu bazalaki kokanisa ete Nzambe azalaki kotindela bato maladi lokola etumbu mpo na masumu na bango.” Soki ezali bongo, ntango bamilio ya bato bakufaki na Mpoto na maladi moko oyo epanzanaki kuna na bambula ya 1300, yango elakisi nde ete Nzambe apesaki bato mabe etumbu? To mikrobe moko nde ememaki maladi yango, ndenge minganga bayebaki yango nsima? Bato mosusu bakoki komituna: Nzambe apesaka bato maladi lokola etumbu mpo na masumu na bango? *

KANISÁ NAINO: Mpo na nini Yesu azalaki kobikisa bato, soki maladi mpe bampasi ezalaki bitumbu ya Nzambe? Yango elingaki kozala lokola nde azali kopekisa Nzambe apesa bato etumbu oyo ebongi bázwa! (Matai 4:23, 24) Yesu akokaki te kosala makambo oyo ezali kopekisa mokano ya Nzambe. Ye moko alobaki boye: “Nasalaka ntango nyonso makambo oyo esepelisaka ye,” mpe “kaka ndenge Tata apesi ngai mitindo, nazali kosala kaka bongo.”​—Yoane 8:29; 14:31.

Biblia elobi polele. Epai ya Yehova Nzambe “kozanga bosembo ezali te.” (Kolimbola Mibeko 32:4) Na ndakisa, Nzambe akoki te kokweisa aviɔ moko, kotika bato ebele oyo basali mabe te bákufa, kaka mpo alingi kopesa etumbu na moto moko ya mabe oyo azalaki na aviɔ yango! Mpo na komonisa ete Nzambe azali sembo, Abrahame, mosaleli moko ya Nzambe, alobaki ete Nzambe akoki te ‘koboma moyengebene elongo na moto mabe.’ Alobaki ete “ekoki kokanisama ata moke te.” (Ebandeli 18:23, 25) Biblia elobi mpe ete “Nzambe asalaka mabe te”; asalaka te “makambo oyo ezangi bosembo.”​—Yobo 34:10-12.

OYO BIBLIA ETEYI MPO NA BAMPASI

Bampasi oyo ekómelaka biso ezali te etumbu ya Nzambe mpo na lisumu moko boye. Yesu ye moko alimbolaki likambo yango polele ntango ye ná bayekoli na ye bamonaki moto moko oyo azalaki komona te banda abotamá. “Bayekoli na ye batunaki ye ete: ‘Rabi, nani asalaki lisumu, moto oyo to baboti na ye, mpo abotama moto akufá miso?’ Yesu ayanolaki ete: ‘Moto oyo asalaki lisumu te, baboti na ye mpe te, kasi ezali mpo misala ya Nzambe emonana polele na likambo na ye.’”​—Yoane 9:1-3.

Lokola bato mingi bazalaki kokanisa ndenge wana, na ntembe te bayekoli ya Yesu bakamwaki ntango ayebisaki bango ete ezalaki moto yango te to baboti na ye nde basalaki lisumu mpo ye abotama ndenge wana. Yesu abikisaki moto wana mpe alongolaki na mitó ya bato likanisi wana ya lokuta ete bampasi ezalaka nde etumbu ya Nzambe. (Yoane 9:6, 7) Koyeba ete maladi ezali etumbu ya Nzambe te ekoki kokitisa mitema ya bato oyo bazali na maladi makasi lelo oyo.

Mpo na nini Yesu abikisaki bato soki Nzambe nde apesaki bango etumbu mpo na mabe na bango?

Biblia elobi na biso

  • “Nzambe akoki komekama na makambo ya mabe te mpe ye moko akoki komeka moto na ndenge wana te.” (YAKOBO 1:13) Kutu, “makambo ya mabe” oyo etungisaka bato banda kala, na ndakisa maladi, bampasi, mpe liwa, ekolimwa mosika te.

  • Yesu Kristo “abikisaki baoyo nyonso bazalaki koyoka nzoto malamu te.” (MATAI 8:16) Lokola Mwana ya Nzambe abikisaki bato nyonso oyo bayaki epai na ye, amonisaki makambo oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala na mokili mobimba.

  • “[Nzambe] akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka [to matánga] ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala eleki.”​—EMONISELI 21:3-5.

EZALI FOTI YA NANI?

Kasi, mpo na nini bato bazali komona mpasi mpe konyokwama mingi boye? Bato bamitunaka motuna yango banda kala mpenza. Soki ezali foti ya Nzambe te, ezali foti ya nani? Tokozwa biyano na mituna yango na lisolo oyo elandi.

^ par. 4 Atako na ntango ya kala Yehova azalaki ntango mosusu kopesa bato etumbu mpo na masumu oyo basalaki, Biblia elobi te ete lelo oyo apesaka bato maladi to makama lokola etumbu mpo na masumu na bango.