Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nkombo Yehova esengeli kozala na kati ya Kondimana ya Sika?

Nkombo Yehova esengeli kozala na kati ya Kondimana ya Sika?

EZALI na ntina nkombo ya Nzambe ezala na Biblia? Mposa ya Nzambe ezalaki bongo. Nkombo na ye, oyo ezali na balɛtrɛ minei ya monɔkɔ ya Liebele, oyo babengaka Tetragrami, ekomamaki mbala soki 7 000 na makomami ya liboso ya Liebele oyo bato babengaka Kondimana ya Kala. *

Bato ya mayele oyo balimbolaka Biblia bandimaka ete nkombo ya Nzambe ezali na Kondimana ya Kala, to Makomami ya Liebele. Kasi, bato mingi bakanisaka ete nkombo yango ezalaki te na bamaniskri ya Grɛki ya ebandeli, oyo ebengamaka lelo oyo Kondimana ya Sika.

Kasi, bakomi ya Kondimana ya Sika basalaka nini ntango bazali kozongela mikapo ya Kondimana ya Kala oyo ezalaki na Tetragrami? Na bisika mingi, babongoli mingi batyaka liloba “Nkolo” na esika ya nkombo ya Nzambe. Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami Mosantu elandi bango te. Esaleli nkombo Yehova mbala 237 na Makomami ya Grɛki ya boklisto to Kondimana ya Sika.

Mikakatano nini babongoli ya Biblia bakutanaka na yango ntango bazali kopona soki basengeli kotya nkombo ya Nzambe to te na Kondimana ya Sika? Mpo na nini ezali mpenza na ntina kosalela nkombo ya Nzambe na Kondimana ya Sika? Mpe kosalela nkombo ya Nzambe na Biblia ezali na ntina nini mpo na yo?

Mokakatano oyo babongoli bakutanaka na yango

Bamaniskri ya Kondimana ya Sika oyo tozali na yango lelo ezali oyo ya ebandeli te. Bamaniskri ya ebandeli oyo Matai, Yoane, Paulo mpe basusu bakomaki esalelamaki mingi, mpe na ntembe te eumelaki kobeba te. Na yango, bazalaki kosala bakopi mosusu soki oyo ya kala ebebi, mpe bongo na bongo. Na bankóto ya bakopi ya Kondimana ya Sika oyo tozali na yango lelo, mingi ekomamaki soki bikeke mibale na nsima ya oyo ya ebandeli. Emonani ete na ntango wana bato oyo bazalaki kosala bakopi ya bamaniskri bazalaki kotya na esika ya Tetragrami liloba Kuʹri·os to Kyʹri·os, liloba ya Grɛki oyo elimboli “Nkolo,” to bazalaki kosala bakopi ya bamaniskri oyo ezalaki na liloba Kuʹri·os. *

Yango wana, mobongoli asengeli koluka koyeba soki Tetragrami ezalaki na bamaniskri ya Grɛki ya ebandeli to te. Eloko nini ekoki kosalisa ye? Tótalela makanisi oyo elandi:

  • Ntango Yesu azalaki kozongela maloba ya Kondimana ya Kala to kotánga yango, azalaki kosalela nkombo ya Nzambe. (Deteronome 6:13, 16; 8:3; Nzembo 110:1; Yisaya 61:1, 2; Matai 4:4, 7, 10; 22:44; Luka 4:16-21) Na ntango ya Yesu ná bayekoli na ye, Tetragrami ezalaki na bakopi ya makomi ya Liebele oyo babengaka Kondimana ya Kala, ndenge ezali tii lelo. Nzokande, na boumeli ya bikeke, bato ya mayele bazalaki kokanisa ete Tetragrami ezalaki te na bamaniskri ya libongoli ya Septante na monɔkɔ ya Grɛki ya Kondimana ya Kala mpe na bamaniskri ya Kondimana ya Sika. Na nsima, na katikati ya ekeke ya 20, likambo moko ya ntina ebendaki likebi ya bato ya mayele: bamonaki mwa bakopi ya kala mpenza ya libongoli ya Septante na monɔkɔ ya Grɛki oyo ezalaki na ntango ya Yesu. Mwa bakopi yango ezalaki na nkombo ya Nzambe, oyo ekomamaki na balɛtrɛ ya Liebele.

  • Yesu azalaki kosalela nkombo ya Nzambe mpe azalaki koyebisa yango epai ya bato mosusu. (Yoane 17:6, 11, 12, 26) Yesu alobaki polele ete: “Nayei na nkombo ya Tata na ngai.” Alobaki lisusu ete makambo oyo asalaki, asalaki yango “na nkombo ya Tata na [ye].” Kutu, nkombo ya Yesu elimboli “Yehova azali lobiko.”​—Yoane 5:43; 10:25.

  • Nkombo ya Nzambe ekomamá na mokuse na bisika mosusu na Makomami ya Grɛki. Na Emoniseli 19:1, 3, 4, 6, nkombo ya Nzambe ezali na kati ya liloba “Aleluya.” Liloba yango elimboli “Bósanzola Yah!” Yah ezali nkombo ya Yehova na mokuse.

  • Mikanda ya kala ya Bayuda emonisi ete Bayuda oyo bazalaki baklisto bazalaki kosalela nkombo ya Nzambe na mikanda na bango. Tosefta, buku ya mibeko oyo basilisaki kokoma soki na mobu 300 T.B., elobi na ntina ya makomi ya baklisto oyo etumbamaki na mokolo ya Sabata ete: “Babuku ya basakoli mpe ya minim [Bayuda oyo bato bakanisaka ete bazali baklisto] ezikaki na mɔtɔ. Kasi bapesaki nzela ya kotumba babuku yango na bisika nyonso oyo ezalaki, . . . ná yango ná nkombo ya Nzambe oyo ezalaki na kati na yango.” Kaka buku yango elobi ete Rabbi Yosé, moto ya Galilai, oyo azalaki na bomoi na ebandeli ya ekeke ya mibale ya T.B., alobaki ete mikolo mosusu “moto moko akataki nkasa oyo ezalaki na nkombo ya Nzambe na kati na yango [makomi ya baklisto] mpe abombaki yango, mpe atumbaki nkasa oyo etikalaki.” Na yango, emonani mpenza ete Bayuda ya ekeke ya mibale ya T.B., bazalaki kondima ete baklisto bazalaki kosalela nkombo Yehova na makomi na bango.

Ndenge nini babongoli basilisaki mokakatano yango?

Kaka Libongoli ya Mokili ya Sika nde ezongisá nkombo ya Nzambe na Makomami ya Grɛki? Te. Na kotalela makambo touti komona, babongoli mingi ya Biblia bamonaki ete esengeli kozongisa nkombo ya Nzambe na Kondimana ya Sika.

Na ndakisa, mabongoli mingi ya Kondimana ya Sika na minɔkɔ ya Afrika, Amerika, Azia mpe ya bisanga ya Pasifike esalelá nkombo ya Nzambe mingi. (Talá etanda na lokasa 21.) Mabongoli yango mosusu ebimi mosika te, na ndakisa Biblia na monɔkɔ ya rotumien (1999), oyo esaleli nkombo Jihova mbala 51 na bavɛrsɛ 48 ya Kondimana ya Sika, mpe libongoli ya Batak-Toba (1989) na Indonésie, oyo esaleli nkombo Jahowa mbala 110 na Kondimana ya Sika. Nkombo ya Nzambe ezali mpe na mabongoli ya minɔkɔ ya Allemand, Espagnol mpe ya Lifalanse. Na ndakisa, Pablo Besson abongolaki Kondimana ya Sika na monɔkɔ ya Espagnol na ebandeli ya ekeke ya 20. Libongoli na ye esaleli nkombo Jehová na mokanda ya Yuda vɛrsɛ 14, mpe maloba na nse ya lokasa na bisika soki 100 emonisi ete nkombo ya Nzambe ekokaki kozala na bisika yango.

Mwa Babiblia ya Lingala mpe ya Lifalanse oyo totye na nse awa ezali na nkombo ya Nzambe na Kondimana ya Sika:

  • Kondimana na sika na Nkolo na biso Yesu Masiya, Les Sociétés bibliques au Congo (1960)

  • Kondimana na Sika—Njembo na Nkolo na biso Yesu Masiya, Société biblique de la R.D.Congo. © United Bible societies (1961 and 1964)

  • Bible de Chouraqui (Lifalanse), 1985

  • Les Evangiles, ya Claude Tresmontant (Lifalanse), 1991

Eumeli te, na ebimeli na yango ya 2004, Biblia New Living Translation, libongoli oyo bato mingi basalelaka, elobaki na maloba na yango ya ebandeli, na nse ya motó ya likambo “Ndenge tobongoli bankombo ya Nzambe” ete: “Mingimingi, tobongoli Tetragrami (YHWH) na ‘NKOLO,’ mpe tokomi yango mobimba na balɛtrɛ ya minene ndenge ezali na Babiblia mingi ya Lingelesi. Yango ekokesenisa yango na nkombo ‘adonai, oyo tobongolaka na ‘Nkolo.’” Lisusu, mpo na Kondimana na Sika, Biblia yango elobi boye: “Na bisika nyonso, tobongoli liloba ya Grɛki kurios na ‘Nkolo,’ longola kaka bisika oyo Kondimana ya Sika etángi makomi ya Kondimana ya Kala, epai tobongoli yango na ‘NKOLO,’ mpe tokomi yango mobimba na balɛtrɛ ya minene.” Emonani polele ete babongoli ya Biblia wana bandimi ete Tetragrami (YHWH) esengeli kozala na bisika wana oyo Kondimana ya Sika etángi makomi ya Kondimana ya kala.

Likambo ya kokamwa, na motó ya likambo “Tetragrami na kati ya Kondimana ya Sika,” buku moko (The Anchor Bible Dictionary) elobi boye: “Ezali na mwa makambo oyo emonisi ete ntango bakomaki Kondimana ya Sika, Tetragrami, nkombo ya Nzambe, Yawe, ezalaki na bisika mosusu to na bisika nyonso oyo Kondimana ya Sika ezongeli makomi ya Kondimana ya Kala.” Mpe George Howard, molimboli moko ya maloba ya Biblia, alobi boye: “Lokola Tetragrami ezalaki kaka kokomama na bakopi ya Biblia oyo ebongolamaki na monɔkɔ ya Grɛki [Septante], oyo lingomba ya ekeke ya liboso ezalaki kosalela, tosengeli mpenza kondima ete ntango bakomi ya Kondimana ya Sika bazalaki kozongela maloba ya Kondimana ya Kala, bazalaki kolongola Tetragrami te na bisika oyo ezalaki.”

Ntina mibale oyo tozongisá nkombo ya Nzambe

Emonani polele ete Libongoli ya Mokili ya Sika ezali Biblia ya liboso te oyo ezali na nkombo ya Nzambe na kati ya Kondimana ya Sika. Lokola zuzi oyo babengi mpo akata likambo moko oyo bato oyo bamonaki yango bazali lisusu na bomoi te, babongoli ya Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika batalelaki makambo nyonso malamumalamu. Nsima ya kotalela makambo mingi, bazwaki ekateli ya kozongisa nkombo ya Yehova na libongoli na bango ya Makomami ya Grɛki ya boklisto. Tótala ntina mibale oyo basalaki bongo.

(1) Babongoli yango bamonaki ete lokola Makomami ya Grɛki eyaki kaka kobakisama na Makomami ya Liebele, mpo yango mpe ekomamaki na lisalisi ya elimo santu, nkombo ya Yehova ekokaki kolimwa na kati na yango kaka mbala moko boye te.

Mpo na nini tokoki koloba ete bakanisaki mpenza solo? Soki na katikati ya ekeke ya liboso T.B., moyekoli Yakobo alobaki na bankulutu ya Yelusaleme ete: “Simeona ayebisi na mobimba mpenza ndenge Nzambe abalolaki likebi na ye mpo na mbala ya liboso epai ya bikólo mosusu mpo na kobimisa uta na bango ekólo moko mpo na nkombo na ye.” (Misala 15:14) Okanisi mpenza ete Yakobo akokaki koloba bongo soki ata moto moko te na ekeke ya liboso ayebaki to azalaki kosalela nkombo ya Nzambe?

(2) Ntango bamonaki bakopi ya Septante oyo esalelaki nkombo ya Nzambe na esika ya Kyʹri·os (Nkolo), babongoli bamonaki polele ete bakopi nyonso ya Makomami oyo ezalaki na ntango ya Yesu, ezala ya Grɛki to ya Liebele, ezalaki na nkombo ya Nzambe.

Emonani polele ete momeseno mabe wana ya kolongola nkombo ya Nzambe na bamaniskri ya Grɛki ebandaki nsima ya ntango ya Yesu. Okanisi nini? Yesu ná bayekoli na ye bakokaki kondima likambo ya ndenge wana esalema?​—Matai 15:6-9.

Belelá “nkombo ya Yehova”

Makomami yango moko emonisi polele ete baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki kosalela nkombo ya Yehova na makomi na bango, mingimingi ntango bazalaki kozongela mikapo ya Kondimana ya Kala oyo ezalaki na nkombo ya Nzambe. Na yango, emonani polele ete Libongoli ya Mokili ya Sika elongi mpenza ndenge ezongisi nkombo ya Nzambe, Yehova, na kati ya Makomami ya Grɛki ya boklisto.

Likambo yango etali yo na nini? Ntoma Paulo azongelaki Makomami ya Liebele mpe alobaki na baklisto ya Loma boye: “Moto nyonso oyo azali kobelela nkombo ya Yehova akobika.” Na nsima atunaki boye: “Ndenge nini bakobelela moto oyo bango bandimeli te? Mpe, ndenge nini bakondimela moto oyo bango bayoki nsango na ye te?” (Baloma 10:13, 14; Yoele 2:32) Mabongoli ya Biblia oyo esaleli nkombo ya Nzambe na bisika oyo esengeli ekosalisa yo opusana penepene na Nzambe. (Yakobo 4:8) Ya solo, ezali mpenza lokumu mpo na biso ndenge Nzambe apesi biso nzela ya koyeba mpe kobelela nkombo na ye, Yehova.

^ par. 2 Tetagrami ezali balɛtrɛ minei, YHWH, oyo ezali komonisa nkombo ya Nzambe na monɔkɔ ya Liebele. Mbala mingi, babongolaka yango na Yehova to Yawe na Lingala.

^ par. 7 Mpo na koyeba lisusu makambo mingi na ndenge balongolaki nkombo ya Nzambe mpe batyaki liloba “Nkolo,” talá na mwa buku Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko, ebimisami na Batatoli ya Yehova, nkasa 23-27.