Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Sekele mpo na libota ya esengo

Ntango molongani azali na maladi oyo ezali kosila te

Ntango molongani azali na maladi oyo ezali kosila te

Banda ntango minganga bayebisaki ngai ete nazali na maladi oyo elɛmbisaka nzoto (syndrome de fatigue chronique), mobali na ngai asalaka mosala ye moko mpo na kosunga libota. Kasi, ayebisaka ngai ata moke te makambo ya mbongo. Mpo na nini aboyaka koyebisa ngai makambo ya mbongo? Mbala mosusu tokómi na banyongo mingi yango wana ayebi ete soki ayebisi ngai, nakomitungisa mingi.​—Nancy. *

LIBALA ezangaka mikakatano te, nzokande ntango molongani moko abɛli maladi oyo ezali kosila te, kasi molongani mosusu azali nzoto kolɔngɔnɔ, mikakatano ekoki kobakisama. * Ozali na molongani oyo abɛli maladi oyo ezali kosila te? Soki ezali bongo, mbala mosusu omitunaka mituna oyo: ‘Nakosala nini soki maladi ya molongani na ngai ekómi makasi koleka? Tii ntango nini nakokoba kosalisa molongani na ngai mpe kosala misala nyonso ya ndako: kolamba, kotya bopɛto, mpe kokende mosala? Mpo na nini nazali komona mabe mpo ngai nazali nzoto kolɔngɔnɔ?’

Soki yo nde ozali kobɛla, mbala mosusu omitunaka boye: ‘Ndenge nini nakoki kobatela lokumu na ngai atako nazali kokoka te kokokisa mikumba na ngai? Molongani na ngai azali nde kosepela na ngai te mpo nazali kobɛla? Esengo ya libala na biso esili?’

Likambo ya mawa ezali ete mabala mosusu ekufaki mpo molongani moko abɛlaki maladi oyo ezalaki kosila te. Kasi, yango elimboli te ete libala na bino mpe ekokufa.

Mabala mingi ekufaki te mpe ekómaki kutu makasi atako molongani abɛlaki maladi oyo ezalaki kosila te. Tózwa ndakisa ya Yoshiaki ná mwasi na ye Kazuko. Yoshiaki abɛlaki maladi moko ya mokɔngɔ oyo ezalaki kosɛnga kaka moto asalisa ye, ata mpo na kosala makambo ya mikemike. Kazuko alobi boye: “Mobali na ngai azalaka na mposa ya lisalisi na makambo nyonso. Lokola nasalisaka ye, nkingo, mapeka, mpe mabɔkɔ na ngai ekómi kosala mpasi; yango wana nakendaka kozwa nkisi na lopitalo moko oyo esalisaka bato ya maladi ya mikuwa. Namoni ete kosalisa moto ya maladi ezali mosala makasi.” Atako mikakatano wana, Kazuko alobi boye: “Boyokani na biso na libala ekómi makasi koleka.”

Na yango, wapi sekele mpo na kozala na esengo na kati ya mikakatano ya ndenge wana? Ya liboso, bato oyo bazalaka na esengo mpe basepelaka na libala na bango bamonaka ete maladi eyei konyokola kaka molongani oyo abɛli te, kasi bango nyonso mibale. Ezali bongo mpo soki molongani moko abɛli, bango nyonso mibale bamitungisaka, ata soki mitungisi yango ezalaka ndenge moko te. Boyokani wana oyo ezali kati na mwasi ná mobali elobami na Ebandeli 2:24: “Mobali akotika tata na ye ná mama na ye mpe asengeli kokangama na mwasi na ye mpe basengeli kokóma mosuni moko.” Na yango, ntango molongani moko azali na maladi oyo ezali kosila te, ezali na ntina mingi ete mwasi ná mobali básala elongo mpo na kolonga mikakatano.

Longola yango, bato ya mayele bamonisi ete babalani oyo babatelaka boyokani ya malamu ntango moko na bango abɛli maladi oyo ezali kosila te, bandimaka mokakatano yango mpe bayekolaka ndenge malamu ya komesana na yango. Makambo mingi ya malamu oyo bayekoli mpo na komesana na mokakatano yango eyokani na batoli ya Biblia, oyo esilaka ngala te. Tótalela makambo misato oyo ekoki kosalisa babalani.

Bópesanaka lokumu

Mosakoli 4:9 elobi boye: “Bato mibale baleki moto moko.” Mpo na nini? Vɛrsɛ 10 elobi ete ezali bongo mpo “soki moko na bango akwei, mosusu akoki kotɛlɛmisa moninga na ye.” ‘Otɛlɛmisaka moninga na yo’ na maloba ya boboto?

Oyebi makambo oyo okoki kosala mpo na kosalisa molongani na yo? Yong, oyo mwasi na ye azali paralize na ngámbo moko, alobi boye: “Nasalaka makasi namitya na esika ya mwasi na ngai na makambo nyonso. Soki nayoki mposa ya mai, namonaka ete ye mpe akoki kozala na mposa ya mai. Soki nalingi kobima libándá mpe kotala esika moko ya kitoko, natunaka ye soki alingi tóbima na ye. Tozali kokabola mpasi mpe tozali kobundana elongo.”

Soki yo nde ozali kozwa lisalisi ya molongani na yo, ezali na makambo mosusu oyo okoki kosala yo moko kozanga ete maladi ekóma makasi? Soki ezali bongo, yango ekoki kosalisa yo obatela lokumu na yo mpe kosala ete molongani na yo akoba kosalisa yo.

Na esika okanisa mbala moko ete oyebi ndenge malamu ya kopesa molongani na yo lokumu, mpo na nini te kotuna ye moko ayebisa yo likambo oyo akosepela na yango koleka? Nsukansuka, Nancy, oyo tolobelaki na ebandeli, ayebisaki mobali na ye ndenge azalaki komiyoka lokola azalaki koyeba makambo ya mbongo ya libota te. Lelo oyo, mobali na ye asalaka makasi ya koyebisa ye makambo yango.

MEKÁ KOSALA BOYE: Komá makambo oyo omoni ete molongani na yo akoki kosala mpo na kosalisa yo, sɛngá ye mpe asala bongo. Na nsima, pesá ye makambo oyo okomi, mpe ye apesa yo oyo ya ye. Mokomoko asengeli kopona likambo moko to mibale oyo akoki kosala.

Bósalelaka ntango malamu

Salomo, mokonzi ya bwanya akomaki boye: “Eloko nyonso ezali na ntango na yango.” (Mosakoli 3:1) Kasi, ekoki komonana ete bokokoka te kozala na bokatikati na ndenge ya kosalela ntango, mpo maladi oyo ezali kosila te ekoki kobebisa makambo oyo bomeseni kosala na libota. Bokoki kosala nini mpo bózala na mwa bokatikati?

Bokoki mbala na mbala kobosanaka mwa moke mikakatano ya maladi. Bozali na likoki ya kosala makambo mosusu oyo bozalaki kosala liboso molongani abɛla? Soki likoki ezali te, makambo nini ya sika bokoki komeka kosala? Ekoki kozala likambo moko ya pɛtɛɛ, na ndakisa kotángela moninga, to likambo moko ya mpasi, na ndakisa koyekola monɔkɔ ya sika. Soki bozali kosala elongo makambo oyo maladi ezali kopekisa bino te, boyokani na bino ekokóma makasi, bokokóma “mosuni moko,” mpe yango ekobakisela bino esengo.

Likambo mosusu oyo ekoki kosalisa bino bózala na bokatikati ezali kozala elongo na bato mosusu. Na Masese 18:1, Biblia elobi boye: “Ye oyo azali komitangola na bamosusu akoluka mposa na ye ya lokoso; akotombokela makambo nyonso ya bwanya.” Ndenge vɛrsɛ yango elobi, komitangola na bamosusu ekoki kobebisa makanisi. Nzokande, kozala mbala na mbala elongo na bato mosusu ekoki kopesa yo esengo mpe kosalisa yo ozala na makanisi ya malamu. Mpo na nini te kobengisa moto moko aya kotala bino?

Mbala mosusu, ezalaka mpasi mpo moto oyo azali kosalisa molongani na ye azala na bokatikati. Bamosusu basalaka misala mingi, balɛmbaka makasi, mpe kolɔngɔnɔ ya nzoto na bango moko ekómaka na likama. Nsukansuka, nyonso wana ekoki kosala ete akoka lisusu te kosalisa molongani na ye. Yango wana, soki ozali kosalisa molongani oyo azali na maladi oyo ezali kosila te, kobosana te bamposa na yo moko. Zwáká ntango ya kopema mwa moke. * Basi mosusu bamonaka ete kosolola na moninga na ye mwasi oyo atyelaka motema esalisaka mingi; mibali mpe basalaka bongo.

MEKÁ KOSALA BOYE: Komá na papye mikakatano oyo ozali na yango ntango ozali kosalisa molongani na yo. Na nsima, komá makambo oyo okoki kosala mpo na kolonga mikakatano to kobundisa yango malamu. Na esika otalela yango na mozindo, omituna boye, ‘Likambo nini ya pɛtɛɛ nakoki kosala mpo na kobongisa makambo mwa moke?’

Bómeka kotalelaka makambo na ndenge ya malamu

Biblia ekebisi ete: “Koloba te ete: ‘Mpo na nini mikolo ya liboso elekaki mikolo oyo na malamu?’” (Mosakoli 7:10) Na yango, kokanisaka te ndenge bomoi elingaki kozala soki maladi wana ezalaki te. Kobosana te ete na mokili oyo, tokoki kozala ntango nyonso na esengo te. Sekele mpo na kozala na esengo ezali kondima makambo ndenge ezali mpe kosala nyonso mpo na komesana na yango.

Nini ekoki kosalisa yo ná molongani na yo na likambo yango? Bólobelaka elongo mapamboli oyo bozali kozwa. Bósepela soki molongani ayoki ata mwa malamu moke. Bókanisaka makambo ya malamu oyo bokosala, mpe bómityela mikano oyo bokoki kokokisa elongo.

Shoji ná mwasi na ye Akiko basalelaki batoli oyo touti kolobela mpe esalisaki bango mingi. Ntango monganga ayebisaki Akiko ete azali na maladi ya fibromyalgie, ye ná mobali na ye basengelaki kotika mokumba oyo bazalaki na yango na mosala ya Nzambe. Balɛmbaki nde nzoto? Ɛɛ. Atako bongo, Shoji apesi bato nyonso oyo bakoki kokutana na mokakatano yango toli oyo: “Soki ozali kokanisa makambo oyo okoki lisusu kosala te, okolɛmba nzoto. Taleláká makambo na ndenge ya malamu. Ata soki bino mibale bozali na elikya ete mokolo mosusu bomoi na bino ekozonga ndenge ezalaki, bóndima bomoi ndenge ezali sikoyo. Mpo na ngai, yango elimboli kotyela mwasi na ngai likebi mpe kosalisa ye.” Batoli ya ndenge wana ekoki kosalisa mpe yo soki molongani na yo azali na maladi oyo ezali kosila te.

^ par. 3 Bankombo mosusu ezali ya bango te.

^ par. 4 Lisolo oyo elobeli ndenge ya kosala ntango molongani abɛli maladi oyo ezali kosila te. Atako bongo, batoli oyo elandi ekoki mpe kosalisa babalani oyo moko na bango azali nzoto kolɔngɔnɔ te mpo asalá aksida to mpo azali konyokwama na makanisi.

^ par. 20 Bokoki komona malamu bóluka lisalisi ya bato oyo basalisaka to bibongiseli oyo esalisaka bato ya maladi soki ezali na mboka na bino.

OMITUNA BOYE . . .

Ngai ná molongani na ngai tosengeli mpenza kosala nini sikoyo?

  • Kolobela mingi maladi

  • Kotika kolobela maladi mingimingi

  • Kotungisama lisusu mingi te

  • Kopesana lokumu

  • Kotyelana likebi atako moko azali maladi

  • Kozala mingi elongo na basusu

  • Komityela mikano oyo tokokokisa elongo