Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Biblia ezali mpenza Liloba ya Nzambe

Biblia ezali mpenza Liloba ya Nzambe

NTOMA Paulo alingaki mpenza koloba nini ntango alobaki ete Biblia “ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe”? (2 Timote 3:16) Ntango Paulo akomaki na monɔkɔ ya Grɛki, asalelaki liloba oyo elimboli mpenzampenza “epemami na Nzambe.” Na maloba yango, Paulo alingaki koloba ete Nzambe asalelaki elimo santu na ye mpo na kotinda bakomi ya Biblia bákoma kaka makambo oyo Ye alingaki bákoma.

Ntoma Petro alobaki ete bakomi yango ya Biblia “balobaki makambo oyo euti na Nzambe ndenge elimo santu ezalaki kotinda bango.” (2 Petro 1:21) Na yango, ntoma Paulo akokaki mpe kobenga mikanda ya Biblia “makomi mosantu, oyo ekoki kokómisa yo moto ya bwanya mpo na lobiko na nzela ya kondima oyo ezali na boyokani na Kristo Yesu.”​—2 Timote 3:15.

Bato ebele batyaka ntembe mingi ete Biblia euti na Nzambe. Bato yango, oyo mbala mingi bazalaka na ezaleli oyo Charles Marston abengaki “lityo makasi mpo na masolo ya Biblia,” babundá makasi mpo na komonisa ete Biblia elobaka solo te. Bato mosusu balobaka ete ezali kaka mwa “buku moko ya kala ya masapo mpe masolo ya lokuta.”

Talelá naino bilembeteli

Ndenge nini oyebaka soki osengeli kotyela bato oyo okutani na bango motema?

Boye, Biblia ekoki kotyelama motema? Ezali na ntina oyeba malamu eyano oyo okopesa na motuna yango. Mpo na nini? Mpamba te soki Biblia ezali na maloba oyo euti na Nzambe ye moko, ekozala bozoba​—ata kutu likama—​koboya kolanda yango. Soki omonaka ete Biblia ezali kaka maloba ya bato kasi Liloba ya Nzambe te, yango ekozala na bokonzi mingi te likoló ya misala na yo bindimeli na yo.​—1 Batesaloniki 2:13.

Ndenge nini okoki koyeba eyano oyo okopesa? Ndenge nini oyebaka soki osengeli kotyela bato oyo okutani na bango motema? Likambo ya solo yango oyo: ezali mpenza mpasi otyela moto motema mobimba soki oyebi ye malamu te. Ezali kaka ntango okómi koyeba moto malamu nde okomona soki azali mpenza sembo mpe abongi kotyelama motema. Okoki koyeba mpe Biblia ndenge wana. Kondima bindimela te makanisi mabe mpe ya bongolabongola ya bato oyo balukaka kolɛmbisa kondima ya bato na Biblia. Zwá ntango ya kotalela bilembeteli oyo endimisi mpenza ete Biblia “ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe.”

“Baninga” na yango bazali kotyela yango ntembe

Kolɛmba nzoto te kaka mpo bato mosusu oyo bamibengaka “baninga” ya Biblia bazali komonisa elobaka solo te mpe ebongi kotyelama motema te. Buku moko (New Dictionary of Theology) elobi ete lelo, bato mingi oyo balimbolaka maloba ya Biblia, atako bamikumisaka ete bazali bakristo, “balobaka kaka ete Biblia ezali mokanda oyo euti na bato.”

Bato mingi ya teoloji batyaka ntembe na ntina etali bakomi ya mikanda ya Biblia. Na ndakisa, bamosusu balobaka ete mosakoli Yisaya akomaki mokanda ya Yisaya te. Balobaka ete mokanda yango ekomamaki bambula mingi nsima ya eleko ya Yisaya. Buku moko (Concise Bible Commentary) ya Lowther Clarke elobi ete mokanda ya Yisaya “ekomamaki na bato mingi mpe na bileko mingi.” Kasi, bato oyo balobaka ndenge wana babosanaka ete Yesu Kristo ná bayekoli na ye bamonisaki mbala na mbala ete Yisaya nde akomaki mokanda yango.​—Matai 3:3; 15:7; Luka 4:17; Yoane 12:38-41; Baroma 9:27, 29.

Likambo ya mabe koleka, bato oyo balimbolaka maloba ya Biblia, na ndakisa John Dummelow, balobaka ete bisakweli oyo ezali na mokanda ya Danyele “ezali nde masolo ya makambo oyo esalemaki kala, kasi mokomi amonisi yango lokola bisakweli.” Awa mpe, ntango bazali koloba bongo, babosanaka litatoli ya Yesu Kristo ye moko. Yesu akebisaki mpo na oyo abengaki “eloko ya bosɔtɔ oyo ebebisaka etɛlɛmi na esika mosantu, ndenge mosakoli Danyele alobaki.” (Matai 24:15) Ebongi mpenza mokristo andima ete Yesu Kristo ye moko azalaki na kati ya bato ya bokosi​—ete alongisaki lisolo ya kala oyo emonisamaki lokola esakweli? Soki moke te.

Bongo ekosala nini?

Okoki komituna ete, “Kasi ekosala mpenza nini soki songolo to pakala nde akomaki mikanda ya Biblia?” Ɛɛ, ekosala eloko mpenza. Okopesa mpenza valɛrɛ na mokanda oyo balobi ete ezali maloba ya nsuka mpe testama ya moninga na yo soki eyei koyebana ete ye te moto akomaki yango? Sikoyo soki bato ya mayele bayebisi yo ete ezali nde ya lokuta​—ete ezalaki baninga na ye nde bamonaki malamu kokoma makambo oyo bakanisaki ete yango nde maloba na ye ya nsuka. Mokanda yango ekozala lisusu na valɛrɛ na miso na yo? Okoki mpenza kondima ete mokanda yango ezali maloba ya nsuka ya moninga na yo?

Ezali mpe bongo mpo na Biblia. Ezali likambo ya kokamwa te soki bato mingi, ata baoyo bamibengaka bakristo, baboyaka kolanda makambo oyo Biblia elobi na ntina etali bosembo, pite, mpe bongo na bongo. Mbala mingi osilá koyoka bato bazali koloba na lityo makambo lokola, “Aa, kasi wana ezali nde na Testama ya Kala!”​—lokola nde ezali mpenza na valɛrɛ mingi te. Balobaka bongo atako ntoma Paulo abengaki mikanda yango oyo bato babengaka Testama ya Kala, “makomi mosantu” oyo ‘ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe.’

Mbala mosusu okoloba boye: “Okoboya litatoli ya bato nyonso ya mayele kaka boye te.” Toboyi te! Na ndakisa, tozali na botɔndi epai ya bato ya mayele ya mitema sembo oyo basalisá biso tóyeba malamu makomi ya Biblia ya ebandeli. Ya solo, mabunga mikemike ekɔtaki na makomi ya Biblia ntango bazalaki kosala bakopi na yango mbala na mbala na boumeli ya basiɛklɛ. Kasi, kobosana likambo oyo te: Kondima ete mabunga mikemike ekɔtaki na bakopi ya makomi ya Biblia ekeseni mpenza na koloba ete Biblia mobimba ezali eloko oyo bato basalá.

Kobá kondimela “makomi mosantu”

Tozali na botɔndi epai ya bato ya mayele ya mitema sembo oyo basalisá biso tóyeba malamu makomi ya Biblia ya ebandeli

Liboso Paulo aloba ete Biblia ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe, ayebisaki Timote mpo na nini makomami yango ezalaki na ntina mingi. Alobaki boye: “[Na] mikolo ya nsuka . . . bato mabe mpe bakosi bakosala lisusu mabe koleka, bakokosa bato mpe bango moko bakokosama.” (2 Timote 3:1, 13) Kutu ata na mikolo ya Paulo, bato oyo bazalaki komonana ete bazali ‘bato ya bwanya mpe bato ya mayele’ bazalaki kosalela “maloba ya kondimisa” mpo na kokosa bato mpe kolɛmbisa kondima na bango na Yesu Kristo. (1 Bakorinti 1:18, 19; Bakolose 2:4, 8) Mpo na komibatela na bato yango, ntoma Paulo alendisaki Timote ‘akangama na makambo oyo ayekolaki banda bomwana mpenza na nzela ya makomi mosantu’ oyo Nzambe apesaki.—2 Timote 3:14, 15.

Ezali mpe na ntina osala bongo na “mikolo [oyo] ya nsuka.” Kokanisa te ete okoki kokosama te na makanisi oyo ezalaka mbala mingi na “maloba ya kondimisa” oyo bato ya mayele mingi babimisaka. Kasi, ndenge moko na bakristo ya siɛklɛ ya liboso, omibatela wana ozali kotya motema mobimba na makambo oyo ozali koyekola na Biblia, Liloba ya Nzambe oyo ekomamaki mpenza na litambwisi ya elimo santu.

Batatoli ya Yehova bakosepela kosalisa yo okóma kondimela Biblia. Na ndakisa, bakoki kolakisa yo ndenge emonani banda kala ete mitinda ya Biblia ebongi kotyelama motema; ndenge Biblia eyokani na siansi ntango elobelaka makambo ya siansi; ndenge ezali na boyokani banda ebandeli tii nsuka; ndenge bisakweli na yango ezangaki te kokokisama​—mpe makambo mosusu mingi. Soki olingi, komelá babimisi ya zulunalo oyo mpo oyeba makambo oyo esalisá bamilio ya bato ya mitema sembo bámona ete Biblia ezali mpenza Liloba ya Nzambe.