Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MEKOLÁ KONDIMA NA BANGO | NOA

Nzambe ‘abatelaki ye ná bato mosusu nsambo’

Nzambe ‘abatelaki ye ná bato mosusu nsambo’

NOA ná libota na ye bafandi esika moko ntango mbula wana ya makasi ezali kobɛta. Salá lokola ozali komona ndenge mwa pole ya mwinda ezali komonisa bilongi na bango na molili, ndenge bafungoli miso ntango bazali koyoka lokito ya mai ezali kosopana likoló ya nsamba ya masuwa mpe ezali kobɛta masuwa ngambo na ngambo. Na ntembe te, makelele yango ezalaki kobangisa!

Ntango Noa azali kotala bilongi ya bato ya libota na ye, elingi koloba: ya mwasi na ye oyo azalaki sembo mpe ya bana na ye misato ná basi na bango oyo bazalaki molende; na ntembe te azalaki mpenza na botɔndi. Na ntango wana ya mpasi mpenza, ekoki kozala ete abɔndisamaki ntango azalaki komona bato oyo alingaka mingi bazali elongo na ye. Bango nyonso babikaki mpe babatelamaki. Na ntembe te, abondelaki na mongongo makasi mpo libota mobimba eyoka libondeli ya kozongisa matɔndi epai ya Nzambe.

Noa azalaki na kondima makasi. Kondima na ye nde esalaki ete Yehova Nzambe na ye abatela ye ná libota na ye. (Baebre 11:7) Kasi, ntango mbula ebandaki, ezalaki lisusu na ntina te bámonisa kondima? Ezali bongo te, kutu esengelaki bázala na kondima makasi mpo na mikolo ya mpasi oyo ezalaki liboso na bango. Ezali mpe bongo mpo na eleko na biso oyo ya yikiyiki. Boye, tótalela naino liteya oyo tokoki kozwa na kondima ya Noa.

“MIKOLO NTUKU MINEI BUTU MOI”

Na libanda, mbula ekobaki kobɛta “mikolo ntuku minei butu moi.” (Ebandeli 7:4, 11, 12) Mai ekobaki komata se komata. Na ntango yango, Noa amonaki ndenge na mbala moko Yehova Nzambe na ye abatelaki bayengebene mpe apesaki bato mabe etumbu.

Mpela esukisaki botɔmbɔki oyo baanzelu mosusu babimisaki. Lokola balandaki ezaleli ya moimi oyo Satana azalaka na yango, baanzelu mingi basundolaki “esika na bango moko ya kofanda mpenza” na likoló mpo na kosangisa nzoto na basi, mpe babotaki na bango bana oyo babengamaki Banefilime. (Yuda 6; Ebandeli 6:4) Na ntembe te, Satana asepelaki ntango botɔmbɔki yango ebimaki, mpo ebebisaki lisusu lokumu ya bato, bikelamu oyo eleki bikelamu mosusu nyonso oyo Yehova asalá awa na mabele.

Kasi, lokola mai ya Mpela ezalaki se komata, esɛngaki ete baanzelu yango bátika nzoto ya bomoto oyo balataki mpe bázonga na likoló, bakokaki lisusu te kolata nzoto ya bato. Batikaki basi mpe bana na bango bákufa na mai ya Mpela elongo na bato nyonso ya ntango wana.

Banda na ntango ya Enoka, mbula soki 700 liboso, Yehova akebisaki bato ete akoboma bato mabe, baoyo batyolaka Nzambe. (Ebandeli 5:24; Yuda 14, 15) Kobanda ntango yango, bato bazalaki se kokóma mabe koleka, bazalaki kobebisa mabele mpe kotondisa yango na mobulu. Ngonga ekokaki mpo bábomama. Noa ná libota na ye basepelaki na liwa ya bato yango?

Te! Ata Nzambe na bango ya motema mawa asepelaki mpe te. (Ezekiele 33:11) Yehova asalaki nyonso mpo na kobikisa bato mingi. Apesaki Enoka mokumba ya kokebisa bato, mpe atindaki Noa atonga masuwa. Noa ná libota na ye basalaki mosala monene wana na boumeli ya bambula mingi, na miso ya bato nyonso. Longola yango, Yehova, ayebisaki Noa azala “mosakoli ya boyengebene.” (2 Petro 2:5) Ndenge moko na Enoka oyo azalaki na bomoi liboso na ye, Noa akebisaki bato mpo na etumbu oyo ezalaki koya. Bato yango basalaki nini? Yesu oyo amonaki makambo yango uta na likoló, alobaki boye mpo na bato ya ntango ya Noa: “Batyaki likebi te tii mpela eyaki mpe ekɔmbɔlaki bango nyonso.”​—Matai 24:39.

Kanisá naino ndenge makambo ezalaki mpo na Noa mpe libota na ye na boumeli ya mikolo 40 ya liboso, ntango Yehova akangaki porte ya masuwa. Ntango mbula wana ya monene ezalaki kokwea likoló ya masuwa mokolo na mokolo, emonani ete bango nyonso mwambe bazalaki kosala mwa misala; na ndakisa kosalisana, kobongisa bisika na bango, kokokisa bamposa ya banyama mpe kobongisa bisika oyo batyaki banyama yango. Na ntango moko boye, ebakata ya masuwa yango ebandaki koningana mpe kotombwana. Ekómaki kotepatepa! Lokola mai ezalaki kotombola yango, masuwa ezalaki se komata tii ekómaki “kotepatepa mosika likoló ya mabele.” (Ebandeli 7:17) Yehova Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso amonisaki nguya na ye na ndenge ya kokamwa mpenza!

Noa asengelaki mpenza kozala na botɔndi kaka te mpo ye ná libota na ye babatelamaki, kasi mpe mpo na motema mawa ya Yehova, ndenge asalelaki bango mpo na kokebisa bato oyo bakufaki na libanda ya masuwa. Ekokaki komonana lokola ete bambula nyonso oyo balekisaki na mosala makasi wana ezalaki mpamba. Bato baboyaki koyokela bango! Kanisá naino, ekoki kozala ete liboso ya Mpela, Noa azalaki na bandeko ya basi mpe mibali, mpe bana na bango; kasi bayokelaki ye te, longolá kaka bato ya libota na ye moko. (Ebandeli 5:30) Wana bato yango 8 bazalaki na kati ya masuwa kozanga likama, na ntembe te, kokanisa ntango nyonso oyo balekisaki mpo na kopesa bato libaku ya kobika ebɔndisaki bango.

Tii lelo oyo, Yehova abongwani te. (Malaki 3:6) Yesu Kristo amonisaki ete eleko na biso ekokani na “mikolo ya Noa.” (Matai 24:37) Tozali na eleko oyo ekeseni na bileko mosusu nyonso, eleko moko ya mobulu mpenza oyo ekosuka ntango mokili oyo mabe ekobebisama. Lelo oyo, basaleli ya Nzambe bazali mpe kosakola nsango ya makebisi epai ya baoyo nyonso bakondima koyoka. Yo mpe okondima nsango yango? Soki osí ondimá solo ya nsango yango ya lobiko, okondima kopesa mabɔkɔ mpo na koyebisa basusu? Noa ná libota na ye batikelá biso nyonso ndakisa.

“BABIKAKI NA MAI”

Ntango masuwa ezalaki kotepatepa likoló ya mai oyo etondaki na mokili, na ntembe te, baoyo bazalaki na kati bazalaki koyoka makelele ya mabaya minene na yango. Noa azalaki komitungisa mpo na mbonge to kobanga ete masuwa yango epanzana? Te. Lelo oyo, bato oyo batyaka ntembe bakoki kozala na makanisi ya ndenge wana, kasi ezalaki bongo te mpo na Noa. Biblia elobi boye: “Na kondima Noa . . . atongaki masuwa.” (Baebre 11:7) Kondima na makambo nini? Yehova asalaki kondimana, elingi koloba boyokani mpo na kobikisa Noa ná libota na ye na Mpela. (Ebandeli 6:18, 19) Ye oyo akelá molɔ́ngɔ́, mabele mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango akokaki te kobatela masuwa yango? Ntembe ezali te! Noa andimaki mpenza ete Yehova akokokisa elaka na ye. Mpe ye ná libota na ye “babikaki na mai.”​—1 Petro 3:20.

Nsukansuka, nsima ya mikolo mpe butu 40, mbula ekatanaki. Na kalandriye na biso, ekoki kozala na sanza ya 12 ya mobu 2370 liboso ya ntango na biso. Kasi mosala oyo libota yango ezalaki kosala na kati ya masuwa esilaki naino te. Masuwa yango oyo etondaki na bikelamu ya bomoi ezalaki kotepatepa kaka yango moko likoló ya mai oyo etondaki na mokili mobimba, oyo ezindisaki ata mpe bangomba. (Ebandeli 7:19, 20) Salá lokola ozali komona ndenge Noa ná bana na ye Seme, Kame mpe Yafete bazali kobongisa mosala wana ya makasi mpo banyama nyonso bázanga bilei te, bázala pɛto mpe malamu. Ya solo, Nzambe oyo asalaki ete banyama nyonso wana ya zamba básala matata te mpo na kokɔta na masuwa, azalaki mpe na likoki ya kofandisa bango kimya na boumeli ya eleko ya Mpela. *

Emonani ete Noa abatelaki lisolo ya makambo nyonso oyo esalemaki. Lisolo yango emonisi ntango oyo mbula ebandaki mpe esilaki. Emonisi mpe ete mai ezindisaki mabele na boumeli ya mikolo 150. Nsukansuka, mai ebandaki kokita. Mokolo ya ntina mingi ezali mokolo oyo masuwa yango etelemaki likoló ya “bangomba ya Ararate,” oyo ezwami lelo oyo na ekólo Turquie. Ekoki kozala na sanza ya minei ya mobu 2369 liboso ya ntango na biso. Nsima ya mikolo 73 na sanza ya motoba, bansɔngɛ ya bangomba ekómaki komonana. Sanza misato na nsima, na sanza ya libwa nde Noa azwaki ekateli ya kolongola mwa eteni ya nsamba ya masuwa. Ya solo, bazwaki mbano na mosala makasi wana ntango pole mpe mopɛpɛ kitoko etondaki na masuwa. Liboso, Noa abandaki mpe kotalatala mokili mpo na koyeba soki ebongi. Atindaki yanganga, oyo ezalaki kokende mpe kozonga, mbala mosusu ezalaki kotɛlɛma likoló ya masuwa liboso epumbwa lisusu; na nsima, Noa atindaki ebenga oyo ekobaki kozonga epai na ye tii ntango ezwaki esika ya kotya lokolo.​—Ebandeli 7:24–8:13.

Na ntembe te, Noa azalaki kokamba libota na ye na makambo ya losambo ata na ntango ya mpasi mpenza

Na ntembe te, Noa azalaki kotya makambo ya Nzambe na esika ya liboso. Tokoki komona na makanisi ndenge libota na ye ezalaki koyangana esika moko mbala na mbala mpo na kolobela Nzambe oyo abatelaki bango. Noa azalaki kotalela Yehova liboso ya kozwa ekateli nyonso ya monene. Ata ntango Noa amonaki ete mai “esilaki kokauka” na mabele; nsima ya kofanda na masuwa mbula moko koleka, aboyaki kaka kofungola porte ya masuwa mpo babima. (Ebandeli 8:14) Azelaki liloba euta epai ya Yehova!

Lelo oyo, batata ya mabota bakoki koyekola makambo mingi epai ya moto wana ya sembo. Azalaki kosala makambo na molɔngɔ, na mpiko, na motema molai, mpe kobatela bato ya libota na ye. Oyo eleki nyonso, azalaki kotya mokano ya Nzambe na esika ya liboso. Soki tomekoli kondima ya Noa na makambo yango, tokomemela bandeko mpe baninga na biso nyonso mapamboli.

“BIMÁ NA MASUWA”

Nsukansuka, Yehova apesaki mitindo. Alobaki na Noa boye: “Bimá na masuwa, yo ná mwasi na yo ná bana na yo mpe ná basi ya bana na yo elongo na yo.” Batosaki etinda yango mpe libota mobimba ebimaki mpe banyama nyonso elandaki na nsima. Banyama yango ebimaki na mobulumobulu? Te! Biblia elobi ete “na kolanda mabota na yango, ebimaki na masuwa.” (Ebandeli 8:15-19) Na libanda ya masuwa, ntango bapemaki mopɛpɛ kitoko ya ngomba mpe batalaki bangomba ya Ararate, Noa ná libota na ye bamonaki ete mokili epɛtolami. Mobulu ezalaki te, Banefilime, baanzelu batomboki mpe bato nyonso ya mabe bazalaki lisusu te! * Bato bazwaki lisusu libaku ya kobanda bomoi ya sika.

Noa ayebaki oyo akosala. Abandaki naino na losambo. Atongaki etumbelo moko mpe azwaki mwa banyama oyo ezalaki pɛto na miso ya Nzambe na kati ya banyama “nsambonsambo” oyo bakɔtisaki na masuwa mpe atumbelaki yango Yehova mbeka. (Ebandeli 7:2; 8:20) Losambo yango esepelisaki Yehova?

Biblia eyanoli na maloba oyo ya kolendisa: “Yehova abandaki koyoka nsolo moko oyo ekitisaki ye motema.” Mpasi oyo etondaki na motema ya Yehova ntango bato batondisaki mobulu na mabele elongwaki mpe motema na ye ekitaki ntango azalaki komona libota ya basambeli na ye ya sembo awa na mabele, oyo bazalaki na ekateli ya kokokisa mokano na ye. Yehova asɛngaki te ete bázala bato ya kokoka. Kaka vɛrsɛ yango ebakisi boye: “Mposa ya motema ya moto ezali mabe banda bolenge na ye.” (Ebandeli 8:21) Tótalela ndenge Yehova amonisaki lisusu motema molai na ye mpo na bato.

Nzambe alongolaki elakeli mabe na mabele. Ntango Adama ná Eva batombokelaki ye, Nzambe alakelaki mabele mabe, alobaki ete ekobota biloko na mpasi. Lameke, tata ya Noa, apesaki Noa nkombo oyo mbala mosusu elimboli “kopema” to “kobɔndisama” mpe asakolaki ete mwana yango akokamba bato na eleko moko oyo bakopema na elakeli wana ya mabe. Na ntembe te, Noa asepelaki ntango ayebaki ete akomona kokokisama ya esakweli yango mpe ete mabele ekobimisa na ndenge esengeli milona oyo bato bakolona. Tokoki kokamwa te soki Noa abandaki mbala moko mosala ya bilanga!​—Ebandeli 3:17, 18; 5:28, 29; 9:20.

Ntango Noa ná libota na ye babimaki na masuwa, mokili epɛtolamaki mpenza

Kaka na ntango yango, Yehova apesaki bana nyonso ya Noa mwa mibeko ya polele mpo etambwisaka bango; na kati na yango apekisaki koboma moto mpe kosalela makila na ndenge ya mabe. Nzambe asalaki mpe kondimana ná bato, alakaki ete akoyeisa lisusu Mpela te mpo na kobebisa bikelamu ya bomoi awa na mabele. Mpo na komonisa ete akotosa maloba na ye, Yehova apesaki bato elembo moko ya kokamwa​—monama. Banda wana tii lelo, ntango nyonso oyo tomonaka monama na likoló, ekundwelaka biso elaka kitoko oyo Yehova apesaki.​—Ebandeli 9:1-17.

Soki lisolo ya Noa ezalaki kaka lisapo mpamba, elingaki kosuka kaka na elaka wana ya monama. Kasi Noa azalaki moto ya solo mpenza, mpe bomoi na ye ezalaki pɛtɛɛ te. Lokola bato bazalaki koumela mingi na bomoi na ntango wana, moto wana ya sembo asengelaki koyika lisusu mpiko bambula 350, mpe bambula yango ememelaki ye mpasi mingi. Asalaki libunga monene ntango alangwaki masanga mokolo moko, kasi makambo ebebaki lisusu makasi ntango nkɔkɔ na ye Kanana asalaki lisumu ya monene; lisumu yango ememelaki libota ya Kanana mpasi makasi. Lokola Noa aumelaki mingi na mokili, amonaki ndenge bakitani na ye na mikolo ya Nimerode bakómaki kosala masumu, na ndakisa kosambela bikeko mpe mobulu. Kasi likambo ya malamu, Noa amonaki ndenge mwana na ye Seme apesaki ndakisa malamu ya kondima mpo na libota na ye.​—Ebandeli 9:21-28; 10:8-11; 11:1-11.

Ndenge moko na Noa, tosengeli kotikala sembo ata na mikakatano. Ata soki bato oyo tofandi na bango bazali kokipe Nzambe ya solo te, to batiki kutu kosalela ye, tosengeli kotikala na nzela ya malamu ndenge Noa asalaki. Yehova azwaka na valɛrɛ mingi ezaleli ya koyika mpiko ndenge wana. Ndenge Yesu Kristo alobaki yango, “moto oyo akoyika mpiko tii na nsuka ye nde akobika.”​—Matai 24:13.

^ par. 17 Bamosusu balobaka ete ekoki kozala ete Nzambe asalaki ete banyama yango ezala na likoki ya kosala eloko te, lokola nde batubi yango anestezi mpo eyoka nzala mpenza te. Ezala bongo to te, na ntembe te akokisaki elaka na ye, abatelaki bato mpe biloko nyonso oyo ezalaki na masuwa.

^ par. 22 Ata elembo moko te ya Elanga ya Edene etikalaki na mabele, ekoki kozala ete mai ya Mpela ekɔmbɔlaki yango. Soki ezali bongo, bakeruba oyo bazalaki kobatela porte ya elanga yango basilisaki mosala na bango oyo eumelaki mbula 1600 mpe bazongaki na likoló.​—Ebandeli 3:22-24.