Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | BIBLIA EZALI NA NSANGO NINI?

Nsango malamu mpo na bato nyonso

Nsango malamu mpo na bato nyonso

Lisekwa ya Yesu ebakiselaki bayekoli na ye kondima mpe molende. Kutu, ntoma Paulo atambolaki na Azia ya moke mobimba mpe na etúká ya Mediterane mpo na kofungola masangá mpe kolendisa bakristo, mpo bizaleli mabe ebebisa bango te mpe batikala sembo liboso ya botɛmɛli makasi. Atako mikakatano wana nyonso, lingomba ya bokristo ekobaki kokola mpe kopalangana.

Kutu, bakɔtisaki ntoma Paulo na bolɔko. Kasi ata kuna, akomelaki masangá ya bokristo mikanda oyo ezalaki na batoli ya kolendisa. Mpe akebisaki bango mpo na likama moko monene koleka, elingi koloba lipɛngwi. Na litambwisi ya elimo santu ya Nzambe, ntoma Paulo asakolaki ete “bambwa mabe ya zamba” oyo bakoloba “makambo ya mbilingambilinga” bakokɔta na kati na bango mpe “bakobenda bayekoli bálanda bango.”​—Misala 20:29, 30.

Lipɛngwi yango ebandaki na nsuka ya siɛklɛ ya liboso. Na ntango yango, Yesu Kristo oyo asekwaki, amonisaki ntoma Yoane elilingi ya makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya. Ndenge Yoane akomaki yango, ezala batɛmɛli to bateyi ya lokuta bakokoka soki moke te kopekisa Nzambe akokisa mokano na ye ya ebandeli mpo na mabele mpe bato. “Bato ya bikólo nyonso mpe mabota nyonso mpe minɔkɔ nyonso” bakoyoka nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. (Emoniseli 14:6) Mabele ekozonga lisusu paradiso mpe moto nyonso oyo alingi kosala mokano ya Nzambe akoki kofanda kuna!

Yango ezali “nsango malamu” mpo na yo? Soki ezali bongo, yekolá makambo mingi oyo etali nsango ya Nzambe mpo na bato oyo ezali na Biblia mpe ndenge oyo ekoki komemela yo matomba lelo mpe na mikolo ezali koya.

Okoki kotánga Biblia na Internet na www.mt711.com. Kaka na site yango, okoki mpe koyekola mwa buku La Bible​—Quel est son message? Mpe mwa buku Nsango malamu oyo euti na Nzambe! Ata mpe buku Biblia eteyaka mpenza nini? ná mikanda mosusu oyo emonisi ntina oyo tosengeli kotyela Biblia motema mpe ndenge oyo tokoki kosalela batoli na yango na libota mpe na bomoi na biso. To tuná Motatoli mosusu nyonso ya Yehova mpo na koyeba makambo mosusu.

​—Euti na Misala, Baefese, Bafilipi, Bakolose, Filemo, 1 Yoane, Emoniseli.