Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | BIBLIA EZALI NA NSANGO NINI?

“Tomoni Masiya”!

“Tomoni Masiya”!

Esakweli ya Mika oyo elobaki ete Masiya akobotama na Beteleme, ekokisamaki siɛklɛ soki minei nsima ya kokomama ya mokanda ya nsuka ya Biblia ya eteni ya Makomami ya Ebre. Mbula soki 30 na nsima, na mobu 29 ya ntango na biso, eteni ya liboso ya esakweli ya Danyele oyo elobelaki koya ya Masiya, ekokisamaki. Yesu abatisamaki mpe Nzambe atyaki ye mafuta na elimo. Masiya to momboto oyo bazalaki kozela banda kala, amonanaki na ntango oyo ebongi mpenza!

Yesu abandaki mbala moko mosala na ye, “kosakola nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe.” (Luka 8:1) Kaka ndenge esakolamaki, Yesu azalaki na boboto mpe azalaki mpenza kotyela basusu likebi. Mateya na ye ezalaki mpasi te mpe kitoko mpe abikisaki bato ya “mbeba ya ndenge nyonso,” amonisaki ete Nzambe azalaki elongo na ye. (Matai 4:23) Bato ya mbula nyonso bazalaki koya epai ya Yesu mpe koloba ete: “Tomoni Masiya”!​—Yoane 1:41.

Yesu asakolaki ete liboso Bokonzi na ye etambwisa makambo nyonso, bitumba, koningana ya mabele mpe makambo mingi mosusu ya mabe ekosalema na mokili. Asɛngaki biso nyonso ‘tósɛnzɛlaka.’​—Marko 13:37.

Yesu azalaki moto ya kokoka oyo akobaki kotosa Nzambe, kasi azalaki na banguna oyo nsukansuka babomaki ye. Kasi liwa na ye ezalaki mbeka ya kokoka oyo apesaki mpo na kofuta oyo Adama ná Eva babungisaki; elingi koloba elikya ya bomoi ya seko na paradiso.

Esakweli moko ekokisamaki na ndenge Nzambe asekwisaki Yesu na nsima ya mikolo misato lokola ekelamu ya elimo. Na nsima, Yesu abimelaki bayekoli na ye koleka 500. Liboso ya komata na likoló, Yesu apesaki bayekoli na ye mokumba ya kosakola nsango malamu oyo etali ye mpe Bokonzi na ye epai ya bato ya “bikólo nyonso.” (Matai 28:19) Ndenge nini bakokisaki malamumalamu mokumba yango?

​—Euti na Matai, Marko, Luka, Yoane, 1 Bakorinti.