Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BIBLIA EBONGOLAKA BATO

Elaka ya paradiso na mabele ebongolaki bomoi na ngai!

Elaka ya paradiso na mabele ebongolaki bomoi na ngai!
  • ABOTAMAKI NA: 1974

  • EKÓLO: LETTONIE

  • BOMOI NA YE YA KALA: MOSANI YA MOMEKANO YA TUKUTUKU OYO AZALAKI KOBANGA TE

NDENGE NAZALAKI:

Nabotamaki na Riga, mboka-mokonzi ya ekólo Lettonie. Mama nde abɔkɔlaki ngai ná yaya na ngai ya mwasi. Atako mama azali mondimi ya Lingomba ya Katolike, tozalaki kokende eglize kaka na mikolo ya bafɛti. Nazalaki ntango nyonso kondima ete ezali na nguya moko oyo eleki nyonso, kasi lokola nazalaki naino elenge, nazalaki komipesa na makambo mingi mosusu oyo ezalaki kosepelisa ngai.

Ntango nazalaki kokóla, mama amonaki ete nazalaki na momeseno ya kopanza biloko mpe kokangisa yango lisusu. Lokola biloko ya kopanza ezalaki mingi na ndako, azalaki ntango nyonso kobanga kotika ngai moko na ndako. Yango wana, apesaki ngai ebele ya biloko mikemike ya ebende ya kotonga mpe nazalaki kosepela kosangisa mpe kopanza yango na nsima. Nazalaki mpe kosepela mingi kokumba tukutuku. Mama akɔtisaki ngai na lisano ya momekano ya tukutuku oyo bazalaki kobenga yango Zelta Mopēds (Tukutuku ya wolo). Nabandaki naino na tukutuku ya moke mpe na nsima nakómaki kokumba tukutuku ya monene.

Nazalaki koyekola makambo nokinoki mpe eumelaki te nakómaki mosani monene ya lisano wana ya likama mpenza. Nalongaki mbala misato momekano ya ebele ya bituluku ya bakumbi-tukutuku oyo esalemaki na Lettonie mpe mbala mibale nabimaki moto ya liboso na momekano oyo esangisaki bamboka ya Baltes.

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI:

Na nsuka ya mosala na ngai, mwa sheri na ngai Evija (oyo na nsima akómaki mwasi na ngai) akutanaki na Batatoli ya Yehova. Amonaki mwa mikanda na bango oyo ezalaki na mwa eteni ya lokasa oyo moto akoki kotondisa mpo na kosɛnga boyekoli ya Biblia. Atondisaki yango mpe atindaki yango. Eumelaki te, Batatoli mibale bayaki kotala ye mpe bakómaki koyekola na ye Biblia. Ezalaki malamu mpo na ngai, kasi na nsima, nazalaki lisusu kosepela mpenza te na makambo ya Nzambe.

Na nsima, Batatoli yango babengaki ngai nalanda ndenge bazalaki koyekola na Evija Biblia. Nandimaki, mpe nasepelaki na makambo nayokaki. Likambo moko oyo esimbaki mpenza motema na ngai ezalaki elaka ya paradiso awa na mabele. Na ndakisa, balakisaki ngai Nzembo 37:10, 11, oyo elobi: “Etikali kaka mwa ntango moke, moto mabe akozala lisusu te; mpe okotya mpenza likebi na esika na ye, akozala te. Kasi bato ya komikitisa bakozwa mabele, mpe bakosepela mpenza na kimya mingi.” Elaka yango esepelisaki ngai mpenza.

Nakómaki na mposa makasi ya makambo ya Nzambe. Nakómaki koyeba ete mateya mingi ya mangomba ezalaka ya lokuta. Nzokande, mateya ya Biblia esimbaki motema na ngai mpo ezalaki kitoko mpe polele.

Ntango nakobaki koyekola Biblia, nayebaki ete Yehova azwaka bomoi na valɛrɛ mingi. (Nzembo 36:9) Yango etindaki ngai natalela lisusu momekano oyo nazalaki kosala​—nalingaki lisusu te kotya bomoi na ngai na likama. Kutu, nalingaki nde kosalela bomoi na ngai mpo na nkembo ya Yehova. Na yango, lokumu mpe esengo oyo momekano ya tukutuku ezalaki kopesa ngai, ezalaki lisusu na ntina te mpo na ngai.

Nayaki koyeba ete nakozongisa monɔkɔ epai ya Mopesi ya bomoi

Na 1996, nakendaki na liyangani ya Batatoli ya Yehova oyo esangisaka bato ya bikólo ndenge na ndenge, oyo esalemaki na Tallinn, na Estonie, mosika te na stade epai nazalaki mbala mingi kosala momekano ya tukutuku. Na liyangani yango, namonaki bato ya bikólo ndenge na ndenge bafandi na bomoko mpe na kimya. Na ndakisa, ntango Motatoli moko abungisaki mwa sakosi na ye, nakanisaki ete akomona yango lisusu te. Kasi na nsima, Motatoli mosusu amonaki yango mpe azongiselaki ye yango ná biloko nyonso oyo ezalaki na kati. Nakamwaki mpenza! Nayaki koyeba ete Batatoli ya Yehova basalelaka makambo oyo Biblia elobaka. Ngai ná Evija tokobaki na boyekoli na biso mpe na 1997 tozwaki batisimo mpe tokómaki Batatoli ya Yehova.

MATOMBA OYO NAZWI:

Baninga na ngai mosusu bakufaki mpo bazalaki kokumba tukutuku na ndenge ya ligboma. Boyekoli na ngai ya Biblia esalisaki ngai nayeba ete nakozongisa monɔkɔ epai ya Yehova, Mopesi ya bomoi. Na ntembe te, koyeba likambo yango ebikisaki bomoi na ngai.

Eleki sikoyo mbula minei banda ngai ná Evija tozwaki libaku ya kosala na biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova na Riga. Sikoyo, tozali na esengo ya kobɔkɔla mwana na biso ya mwasi, Alise mpe kosalisa ye alinga Yehova. Mokolo moko na pɔsɔ nakendaka na biro ya kobongola mikanda mpo na kobongisa mituka mpe biloko mosusu oyo ebebi. Epesaka ngai esengo mpenza ntango nasalelaka makambo oyo nayekolaki na bomwana na ndenge ya malamu! Ɛɛ, nazali kokoba kopanza biloko mpe kosangisa yango lisusu.

Nazwaka na valɛrɛ mingi libaku ya kosakola elongo na libota ngai makambo etali Nzambe ya solo kaka moko, mpe nyonso wana ezali mpo na makambo oyo nayekolaki na Biblia. Lisusu, elaka ya paradiso awa na mabele ebongolaki bomoi na ngai!