Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Biyano na mituna ya Biblia

Biyano na mituna ya Biblia

Biblia ezali mpenza Liloba ya Nzambe?

Okolinga ete Liloba ya Nzambe ekesana na eloko mosusu nyonso, mpe Biblia ezali mpenza bongo. Bamiliare ya Biblia esili konyatama mpe kobongolama na minɔkɔ ebele. Bwanya oyo ezali na Biblia ezali na nguya ya kosala ete moto mabe akóma moto malamu.​—Tángá 1 Batesaloniki 2:13; 2 Timote 3:16.

Toyebi ete Biblia eutá na Nzambe mpo elobelaka avenire polelepolele. Moto moko te akoki kosala bongo na mayele na ye moko. Tózwa ndakisa ya mokanda ya Yisaya. Bamonaki kopi na yango oyo ekomamaki siɛklɛ koleka moko liboso Yesu abotama na mobenga moko pene ya Mbu Ekufá. Elobaki ete bato bakofanda lisusu te na engumba ya Babilone. Yango ekokisamaki bambula mingi liboso nsima ya mosala ya Yesu awa na mabele.​—Tángá Yisaya 13:19, 20; 2 Petro 1:20, 21.

Biblia ekomamaki ndenge nini?

Biblia ekomamaki na boumeli ya bambula koleka 1 600. Bato soki 40 oyo bakomaki yango balandaki motó ya likambo kaka moko kozanga ete makanisi na bango ekesana. Ndenge nini yango ekokaki kosalema? Nzambe akambaki mosala na bango ya kokoma.​—Tángá 2 Samwele 23:2.

Na bantango mosusu Nzambe azalaki koloba na bakomi ya Biblia na nzela ya baanzelu, bimonaneli to bandɔtɔ. Mbala mingi, Nzambe azalaki kopesa bakomi yango makanisi na ye mpe bango bazalaki kopona maloba oyo bakosalela mpo na kopesa nsango ya Nzambe.​—Tángá Emoniseli 1:1; 21:3-5.