Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | OKOKI KOPUSANA PENEPENE NA NZAMBE

Ngai Yehova. Yango nde nkombo na ngai.

Ngai Yehova. Yango nde nkombo na ngai.

Ezali na moninga na yo moko ya motema oyo oyebi nkombo na ye te? Ekoki kosalema te. Mwasi moko ya Bulgarie alobaki boye: “Moto akoki te kopusana penepene na Nzambe soki ayebi nkombo na ye te.” Likambo ya esengo, ndenge tomonaki yango na lisolo oyo eleki, Nzambe alingi tópusana penepene na ye. Na yango, na Biblia, amimonisi ye moko epai na yo na maloba oyo: “Ngai Yehova. Yango nde nkombo na ngai.”​—Yisaya 42:8.

Na Biblia, Nzambe amimonisi ye moko epai na yo na maloba oyo: “Ngai Yehova. Yango nde nkombo na ngai.”​—Yisaya 42:8

Ezali mpenza na ntina mpo na Yehova ete moto ayeba nkombo na ye mpe asalela yango? Tótala naino: Nkombo ya Nzambe, oyo ekomamaka na balɛtrɛ minei ya Ebre oyo babengaka Tetragrami, ezwami na makomi ya ebandeli ya Makomami ya Ebre mbala soki 7 000. Yango ezali nkombo oyo ekomami mingi koleka bankombo mosusu nyonso na Biblia. Yango emonisi mpenza ete Yehova alingi tóyeba nkombo na ye mpe tósalela yango. *

Mbala mingi, boninga ebandaka ntango bato mibale bayebani bankombo. Oyebi nkombo ya Nzambe?

Ata bongo, basusu bakoki kokanisa ete lokola Nzambe azali mosantu mpe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, kosalela nkombo na ye ekozala kozanga limemya. Ya solo, ezali mabe kosalela nkombo ya Nzambe na ndenge ya mabe, kaka ndenge okolinga te kosalela na ndenge ya mabe nkombo ya moninga na yo ya motema. Kasi, mokano ya Yehova ezali ete bato oyo balingaka ye bámemya nkombo na ye mpe báyebisa yango epai ya bato mosusu. (Nzembo 69:30, 31; 96:2, 8) Kobosana te ete Yesu ateyaki bayekoli na ye babondelaka ete: “Tata na biso na likoló, nkombo na yo esantisama.” Biso mpe tokoki kopesa mabɔkɔ na kosantisama ya nkombo ya Nzambe soki tozali koyebisa bato mosusu nkombo yango. Kosala bongo ekosala ete tópusana penepene na Nzambe.​—Matai 6:9.

Biblia emonisi ete Nzambe atyelaka “baoyo bakanisaka nkombo na ye” likebi mingi. (Malaki 3:16) Mpo na bato yango, Yehova alaki boye: “Nakobatela ye mpo ayebi nkombo na ngai. Akobelela ngai, mpe nakoyanola ye. Nakozala elongo na ye na ntango ya mpasi.” (Nzembo 91:14, 15) Koyeba nkombo ya Yehova mpe kosalela yango, ezali na ntina soki tolingi kozala baninga na ye.

^ par. 4 Likambo ya mawa, nkombo ya Nzambe ezali te na mabongoli mingi ya Biblia atako nkombo yango ezali na bisika mingi na Makomami ya Ebre oyo babengaka yango mpe Testama ya kala. Na esika ya nkombo yango, batyá batitre lokola “Nkolo” to “Nzambe.” Mpo na koyeba makambo mosusu na likambo yango, talá nkasa 195-197 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.