Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | NDENGE YA KOSEPELA NA MOSALA NA YO

Mosala ya makasi​—Esilá ngala?

Mosala ya makasi​—Esilá ngala?

Alex asalaka na kompanyi oyo ememaka biloko ya bato oyo balongwe na esika boye mpo na kokende esika mosusu. Azali komilelalela ntango azali komatisa kartɔ mosusu ya biloko na motuka. Amituni boye: ‘Mpo na nini nazali kokangama na mosala oyo ekosalisa ngai te nakende liboso? Bomoi na ngai ekobonga mokolo nini? Bomoi na ngai elingaki kutu kozala malamu koleka soki nazalaki kosala te!’

Ndenge moko na Alex, bato mingi balingaka mosala ya makasi te. Aaron, oyo abongisaka mituka, alobi boye: “Bato mingi bamonaka ete ‘misala ya mabɔkɔ’ ezali ya nivo na bango te. Balobaka boye: ‘Nazali kosala mosala oyo kaka mpo nazwi naino ya malamu koleka te.’”

Mpo na nini bato mingi bamonaka ete mosala ya makasi ezali mpo na bango te? Mbala mosusu mpo balandaka makambo oyo elobamaka na baradio, batelevizyo to na bazulunalo, oyo mbala mingi emonisaka ete mpo moto azala na bomoi “ya malamu,” esɛngi azala na bomɛngo mpe anyokwama te. Matthew, oyo abongisaka baaparɛyi, alobi boye: “Bato bakanisaka ete soki ozali kosala mosala ya makasi mpo na kozwa kaka mwaye ya kobikela, ozali kolonga mpenza te na bomoi.” Shane, oyo asalaka mosala ya kokɛngɛla amoni mpe bongo. Alobi boye: “Bato balingaka lisusu te kosala mosala oyo ekokani na salɛrɛ na bango.”

Kasi, bato mingi oyo balongaka na bomoi basepelaka na mosala ya makasi. Daniel, oyo azali na mbula 25 mpe asalaka mosala ya kotonga bandako, alobi boye: “Namonaka ete mosala ya makasi ememelaka moto matomba mingi mpenza, mingimingi soki esalemi na mikano ya malamu.” Andre, oyo azali na mbula 23 andimi likanisi yango; alobi boye: “Namonaka ete mosala nde ememelaka moto esengo. Kosala mosala mingi te ememelaka moto esengo ya ntango molai te, kasi nde mitungisi!”

Nini esalisaki bato lokola Daniel mpe Andre bákóma kotalela mosala ya makasi na ndenge ebongi? Na mokuse, ezali mpo basalelaki batoli ya Biblia. Na esika epekisa mosala ya makasi, Biblia elendisaka nde bato bázala molende na mosala. Kasi, Biblia esuki kaka te na kolendisa biso tósalaka mosala; emonisi mpe ndenge tokoki kosepela na mosala na biso.

Batoli nini ya Biblia ekoki kosalisa yo osepela na mosala na yo? Tosɛngi yo otalela mwa ndambo na yango na lisolo oyo elandi.