Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Biyano na mituna ya Biblia

Biyano na mituna ya Biblia

Mokolo mosusu tokozala na guvɛrnema kaka moko na mokili mobimba?

Ndenge nini guvɛrnema kaka moko ya mokili mobimba ekoki kosangisa bato ya bikólo nyonso? Yisaya 32:1, 17; 54:13

Kanisá matomba oyo guvɛrnema kaka moko na mokili mobimba ekoki komemela bato. Lelo oyo, bato mingi banyokwamaka mpo bazali mpenza babola, nzokande basusu bazali na bozwi mingi. Kasi guvɛrnema kaka moko na mokili mobimba oyo eyebi bamposa ya bato ekoki kosala nyonso mpo bamposa ya bato nyonso ekokisama. Okanisi ete bato bakozala na likoki ya kosala guvɛrnema ya ndenge wana?​—Tángá Yirimia 10:23.

Banda kala, baguvɛrnema ekokaka te kokokisa bamposa ya bato oyo ezali koyangela na makambo ndenge na ndenge, mingimingi babola. Baguvɛrnema mosusu kutu ezalaka mabe mpenza. (Mosakoli 4:1; 8:9) Kasi Nzambe, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso alaki ete akotya guvɛrnema moko oyo ekozwa esika ya baguvɛrnema mosusu nyonso. Mokonzi na yango akokokisa mpenza bamposa ya bato.​—Tángá Yisaya 11:4; Danyele 2:44.

Bokonzi ya Nzambe ekosala nini?

Yehova Nzambe aponi mokonzi oyo abongi koyangela mokili oyo​—Mwana na ye Yesu. (Luka 1:31-33) Ntango azalaki awa na mabele, Yesu azalaki mpenza kosepela kosalisa bato. Lokola azali mokonzi, akosangisa bato ya bikólo nyonso mpe akosilisa bampasi nyonso ya bato.​—Tángá Nzembo 72:8, 12-14.

Bato nyonso nde bakondima Yesu lokola mokonzi? Te. Kasi Yehova azali motema molai. (2 Petro 3:9) Azali kopesa bato libaku ya kondima Yesu lokola mokonzi. Mosika te, Yesu akoboma bato nyonso ya mabe mpe akotya kimya na mabele mobimba.​—Tángá Mika 4:3, 4.