Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOMOI

Ndenge miso ya Jairo esalisaka ye asalela Nzambe

Ndenge miso ya Jairo esalisaka ye asalela Nzambe

Okoyoka ndenge nini soki nzoto na yo mobimba esalaka malamu te longola kaka miso na yo? Yaya na ngai Jairo azali bongo. Ata bongo, azali na bomoi ya esengo. Liboso nayebisa bino mpo na nini amonaka ete bomoi na ye ezali na ntina, tiká nabɛtɛla bino naino lisolo na ye.

Jairo abotamá na maladi moko na bɔɔngɔ oyo ekómisaka mabɔkɔ ná makolo paralize, babengaka maladi yango tétraplégie spastique. * Mpo na yango, nzoto na ye eninganaka kaka yango moko boye. Lokola bɔɔngɔ na ye etindaka bansango na nzoto na ye malamu te, yango wana makolo ná mabɔkɔ na ye eninganaka kozanga ayeba. Na bantango mosusu, bamuvema oyo asalaka kozanga kokana esalaka ete amizokisa. Ekoki mpe kozokisa baoyo bazali pene na ye soki bakebi te. Likambo ya mawa, mbala mingi esɛngaka kokanga ye mabɔkɔ ná makolo na kiti na ye ya bibɔsɔnɔ mpo amizokisa te.

AKOLAKI NA MPASI MPENZA

Jairo akolaki na mpasi mpenza. Ntango azalaki na sanza misato, akómaki kokwea maladi ya ndɛkɛ oyo ezalaki kosala ete amiyeba te. Mbala mingi, mama azalaki kokanga ye makasi mpe kokima na ye na lopitalo mpo azalaki kokanisa ete akufi.

Lokola azalaki kokanga ye makasi mpe ndenge azalaki kokangamakangama, esalaki ete mikuwa ya Jairo ebeba. Ntango akómaki na mbula 16, bassin na ye ebukanaki mpe esɛngaki básala ye lipaso na ebɛlɔ, na loketo mpe na bassin. Nakanisaka lisusu ndenge Jairo azalaki kolela butu nyonso mpo na mpasi nsima ya lipaso yango.

Mpo Jairo alya, alata bilamba to amata na mbeto esɛngaka moto mosusu asalisa ye. Mbala mingi, mama ná tata nde basalisaka ye na makambo yango. Atako Jairo azalaka na mposa ya lisungi ntango nyonso, baboti na biso bayebisaka ye ntango nyonso ete bomoi na ye etaleli kaka bato te kasi mpe Nzambe.

BAMONI MWAYE YA KOSOLOLA NA YE

Baboti na biso bazali Batatoli ya Yehova, mpe bazalaki kotángela Jairo masolo ya Biblia banda ntango azalaki bebe. Bayebaki ntango nyonso ete bomoi ezalaka na ntina ntango moto azali na boyokani malamu na Nzambe. Atako nzoto ya Jairo ezalaki malamu te mpe koningananingana ntango nyonso, kasi azalaki na elikya kitoko mpenza mpo na avenire. Kasi, mbala mingi bazalaki komituna soki Jairo akokanga mpenza ntina ya mateya ya Biblia.

Mokolo moko, ntango Jairo azalaki mwana, tata atunaki ye boye: “Jairo, okoki kosolola na ngai?” Na nsima, abakisaki boye: “Soki olingaka ngai mpenza, okondima!” Ntango tata azalaki kobondela ye mpo aloba ata liloba moko, Jairo atangisaki mai ya miso. Atako alukaki komonisa ndenge azali koyoka na maloba, azalaki kaka na likoki ya kobimisa mwa maloba oyo ezali koyokana te. Tata ayokaki mabe ndenge alelisaki Jairo. Ndenge oyo Jairo alelaki, emonisaki ete akangaki ntina ya makambo oyo tata alobaki. Azalaki nde kokoka koloba te.

Banda kala, baboti na biso bazalaki komona ndenge Jairo azalaki kobɛtabɛta miso na ye nokinoki mpo na koluka komonisa makanisi na ye mpe ndenge azalaki komiyoka. Ezalaki kosala Jairo mpasi ndenge bato bazalaki koyeba te mposa na ye. Kasi, ntango baboti na biso bakómaki koyeba mposa ya Jairo na nzela ya miso na ye mpe kopesa ye eloko oyo alingi, Jairo akómaki kosɛka mwa moke. Ezalaki ndenge na ye ya koloba mersi.

Monganga moko oyo asalisaka bato oyo balobaka malamu te alobaki ete mpo tósololaka malamu ná Jairo, tosengeli kotombolaka mabɔkɔ nyonso mibale ntango tozali kotuna ye aloba ɛɛ to te. Lobɔkɔ ya mobali elimboli ɛɛ mpe oyo ya mwasi elimboli te. Yango ezalaki kosalisa ye amonisa mposa na ye soki atalisi miso na lobɔkɔ oyo ebongi.

LIKAMBO MOKO YA NTINA MINGI NA BOMOI YA JAIRO

Batatoli ya Yehova basalaka mayangani ya mike mpe ya minene mbala misato na mbula epai basalaka badiskur liboso ya ebele ya bato. Jairo asepelaka ntango nyonso na badiskur oyo basalaka mpo na bato oyo balingi kozwa batisimo. Mokolo moko, ntango Jairo azalaki na mbula 16, tata atunaki ye boye: “Jairo, olingi kozwa batisimo?” Lokola atalaki mpenza lobɔkɔ ya mobali ya tata, yango emonisaki ete ezalaki mpenza mposa na ye. Na nsima, tata abakisaki boye: “Olakaki Nzambe na libondeli ete olingi kosalela ye libela?” Na mbala oyo mpe Jairo atalaki lobɔkɔ ya mobali ya tata. Ezalaki polele ete Jairo apesaki bomoi na ye epai ya Yehova.

Nsima ya kosolola mbala mingi na Biblia, emonanaki polele ete Jairo ayebaki mpenza ntina ya batisimo ya bakristo. Yango wana, na 2004, ayanolaki na motuna oyo ya ntina mingi oyo batuná ye naino liboso te: “Omipesaki na Nzambe mpo na kosala mokano na ye?” Jairo atombolaki miso na ye likoló mpo na koyanola na motuna yango; mpo bayebisaki ye ete soki andimi atombola miso likoló. Na yango, na mbula 17, azwaki batisimo mpe akómaki Motatoli ya Yehova.

ATYE MISO NA MAKAMBO YA NZAMBE

Na 2011, mayele mosusu ya sika emonanaki mpo na kosalisa Jairo asololaka na bato; ordinatɛrɛ oyo ebongisamá mpo na kolandela muvema ya miso na ye. Ordinatɛrɛ yango elandaka muvema ya liso na ye mpo bilembo oyo ezali na ordinatɛrɛ yango esala. Kotya miso na elembo oyo ezali na ordinatɛrɛ ekokani na kofina souris ya ordinatɛrɛ. Batyá bilembo ya bafɔtɔ oyo ezali na maloba to bafraze na ordinatɛrɛ yango mpo na kosalisa Jairo asololaka. Soki atali moko ya bilembo yango, ordinatɛrɛ ekoloba na mongongo makasi makambo oyo ekomami mpo na elembo yango.

Ntango boyebi ya Jairo ya Biblia ezalaki kobakisama, mposa na ye mpe ya kosalisa basusu na makambo ya Nzambe ezalaki kokola. Mbala mingi, na boyekoli na biso ya Biblia na libota, atalaka ngai mpe na nsima atalaka ordinatɛrɛ na ye mpo na koyebisa ngai ete nasengeli kokomela ye komantɛrɛ oyo akopesa na makita epai tosambelaka.

Na makita yango, atambwisaka miso malɛmbɛmalɛmbɛ na ordinatɛrɛ na ye mpo na koluka elembo oyo ebongi, oyo ezali na komantɛrɛ na ye mpe na nsima ordinatɛrɛ etángaka yango na mongongo makasi mpo moto nyonso ayoka. Mbala nyonso oyo alendisaka bandeko ndenge wana, asepelaka makasi. Alex, moninga moko ya Jairo oyo azali elenge, alobi boye: “Ekamwisaka ngai ntango nyonso oyo nayokaka komantɛrɛ ya Jairo.”

Jairo asalelaka ordinatɛrɛ oyo ebongisamá mpo na kolandela muvema ya miso na ye mpe oyo elobaka mpo na kosala komantɛrɛ na makita mpe mpo na koteya basusu mateya ya Biblia

Jairo asalelaka mpe miso na ye mpo na koteya basusu mateya ya Biblia. Asalaka yango soki atye miso na elembo oyo ezali komonisa elanga moko epai banyama mpe bato ya mposo nyonso bafandi na kimya. Soki atali elembo yango, ordinatɛrɛ na ye elobaka na mongongo makasi boye: “Biblia epesi elikya ete mabele ekokóma paradiso epai maladi mpe liwa ekozala lisusu te, Emoniseli 21:4.” Soki moto oyo ayoki nsango yango asepeli, atalaka elembo mosusu mpe ordinatɛrɛ elobaka boye: “Okosepela nayekola na yo Biblia?” Likambo ya kokamwa, nkɔkɔ na biso ya mobali andimaki Jairo ayekola na ye Biblia. Ezalaki kokamwisa mpenza komona Jairo azali koteya nkɔkɔ Biblia malɛmbɛmalɛmbɛ na lisalisi ya ndeko mosusu! Likambo ya esengo, nkɔkɔ azwaki batisimo na liyangani ya etúká oyo esalemaki na engumba Madrid na Espagne na 08/2014.

Na kelasi, balakisi ya Jairo bamonaka mpe ndenge oyo amipesaka na Nzambe. Rosario, molakisi na ye na makambo ya koloba, alobaki mokolo moko boye: “Soki nakondima kokóma mondimi ya lingomba moko boye, nakokóma nde Motatoli ya Yehova. Namoni ndenge kondima ya Jairo esali ete bomoi na ye ezala mpenza na ntina atako azali na mikakatano.”

Miso ya Jairo emonisaka esengo mbala nyonso oyo natángelaka ye elikya ya Biblia oyo elobi: “Motɛngumi akopumbwa lokola serfe, mpe lolemo ya moto oyo alobaka te ekoganga na esengo.” (Yisaya 35:6) Atako na bantango mosusu alɛmbaka nzoto, abungisaka elikya te. Ezalaka bongo mpo alekisaka ntango mingi na makambo ya Nzambe mpe elongo na baninga na ye bakristo. Makanisi malamu mpe kondima makasi oyo azali na yango emonisi ete kosalela Yehova esalaka moto asepela na bomoi ata na mpasi.

^ par. 5 Maladi yango ya bɔɔngɔ ebebisaka likoki oyo nzoto ezalaka na yango ya kosala muvema. Ekoki mpe kosala ete moto akóma na maladi ya ndɛkɛ, alyaka malamu te mpe alobaka malamu te. Tétraplégie spastique ezali lolenge eleki mabe ya maladi yango; ekoki kokómisa mabɔkɔ ná makolo makasi mpe kosala ete moto akoka kotɛlɛmisa nkingo te.