Lakisá makambo oyo ezali na kati

Mwa ndambo ya bandeko 65 oyo babimaki na bolɔkɔ ntango tribinale monene ya Corée du Sud elobaki ete koboya mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli ezali kobuka mibeko te.

7/3/2019
CORÉE DU SUD

Batatoli ya Yehova nyonso oyo bakɔtaki bolɔkɔ mpo baboyaki mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango bazwi sikoyo bonsomi

Batatoli ya Yehova nyonso oyo bakɔtaki bolɔkɔ mpo baboyaki mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango bazwi sikoyo bonsomi

Na mokolo ya 28/02/2019, Motatoli ya Yehova ya nsuka oyo akɔtaki bolɔkɔ na Corée du Sud mpo na koboya kokɔta na makambo ya mokili, abimaki na bolɔkɔ. Bandeko nyonso oyo babimaki bolɔkɔ bapesi matɔndi mingi mpo na bonsomi oyo bazwi mpe ndenge batikalaki sembo epai ya Yehova Nzambe.

Kobanda ekateli ya ntina mingi oyo tribinale monene ezwaki na mokolo ya 01/11/2018 ya kobimisa bato na bolɔkɔ, bandeko 65 babimaki bolɔkɔ mpe tribinale elobaki ete koboya mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli ezali kobuka mibeko te. Ekateli yango esukisi likambo oyo eumelaki mbula 65; likambo ya kokɔtisa na bolɔkɔ baoyo baboyaka mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango.

Kondima mpe bosembo ya bandeko na biso ya Corée ezali kolendisa biso ‘tómonisa mpiko mingi lisusu’ na mosala oyo tosalaka mpo na Mokonzi na biso mpe Bokonzi na ye. (Bafilipi 1:14) Tozali kobondela mpo na bandeko na biso oyo bazali naino na bolɔkɔ na Érythrée, Russie, Singapore, mpe Turkménistan.​—Baebre 10:34.