Lakisá makambo oyo ezali na kati

Corée du Sud

 

Batatoli ya Yehova na Corée du Sud

  • Batatoli ya Yehova bazali​—106 161

  • Masangá ezali​—1 252

  • Motángo ya bato oyo bayanganaki na Ekaniseli ya liwa ya Kristo ezali​—138 920

  • Motatoli ya Yehova moko mpo na bato 485

  • Motángo ya bato​—51 408 000

  • Batatoli ya Yehova bakangami mpo na kondima na bango​—0

2018-10-17

CORÉE DU SUD

Elikya ya moto moko oyo aboyi mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na ye ezali se kobakisama mpo etikali moke tribinale monene esala likita

Tribinale monene ya Corée du Sud ekosala likita na mokolo ya 30/08/2018 mpo na kotalela ekateli oyo tribinale oyo etalelaka mibeko ya mboka na likambo ya baoyo baboyaka mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango.

2018-08-30

CORÉE DU SUD

Kobongisa likambo ya baoyo baboyaka mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango: Ekateli oyo tozalaki kozela banda kala ete tribinale oyo etalelaka mibeko ya mboka Corée du Sud ezwa

Na ekateli oyo ezwaki, Tribinale oyo etalelaka mibeko ya mboka esɛngaki guvɛrnema ya Corée du Sud ebongisa lisusu mobeko ya mosala ya soda na nsuka ya 2019 mpo etya misala mosusu ya Leta na esika ya mosala ya soda.

2018-07-18

CORÉE DU SUD

Batatoli ya Yehova batandaki mikanda na bango esika masano ya Olympique mpe Paralympique ya 2018 esalemaki

Batatoli ya Yehova na Corée basalaki kampanye moko sipesiale mpo na kokabola ofele mikanda oyo elimbolaka Biblia epai ya bapaya oyo bayaki kotala masano ya Olympique mpe Paralympique ya 2018.

2018-08-06

CORÉE DU SUD

Batribinale ya Corée du Sud ezali koluka solisyo na likambo ya baoyo baboyaka mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango

Bazuzi na Corée du Sud bazali koluka solisyo mpo na baoyo lisosoli na bango eboyaka mosala ya soda na esika ya kokɔtisa bango bolɔkɔ.

2018-08-06

CORÉE DU SUD

Batatoli ya Yehova na Corée du Sud basɛngi Prezida atalela likambo ya baoyo baboyaka mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango

Batatoli ya Yehova bazali kozela bakambi ya guvɛrnema bátalela mibeko ya guvɛrnema na bango oyo eumeli bambula mingi, oyo etali kokɔtisa na bolɔkɔ baoyo baboyaka mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango.

2018-08-28

CORÉE DU SUD

Corée du Sud ekómi kondima ntomo ya baoyo baboyaka mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango

Corée du Sud ezali kokende liboso mpo na likambo ya baoyo baboyaka mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango atako Cour constitutionnelle ezwi naino ekateli te mpe batye naino mibeko ya sika te.