Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndako oyo ezikaki na mɔtɔ, ya libota moko ya Batatoli ya Yehova

25/4/2019
CORÉE DU SUD

Zamba epelaki mɔtɔ na bokula ya ɛsti ya Corée du Sud

Zamba epelaki mɔtɔ na bokula ya ɛsti ya Corée du Sud

Na mokolo ya 04/04/2019, zamba epelaki mɔtɔ na bokula ya ɛsti ya Corée du Sud, na etúká ya Gangwon. Mɔtɔ yango epanzanaki nokinoki, mpe guvɛrnema elobaki ete mboka mobimba esengeli kopesa mabɔkɔ nokinoki. Mɔtɔ yango ezikisaki ba ektare koleka 1 600 liboso básilisa koboma yango mpe ebomaki bato mibale.

Biro ya filiale elobi ete ndeko moko te akufi na likama yango. Kasi ndako mwambe ya bandeko na biso 27 ebebaki. Na litambwisi ya biro ya filiale, komite ya kopesa lisungi mpe mokɛngɛli ya zongazonga ya etúká yango bazali kosala elongo na bankulutu ya masangá mpo na kopesa lisungi epai ya baoyo likama yango ebebisi bandako na bango. Bazali kopesa lisungi yango na elimo mpe na mosuni.

Tozali na kondima ete Yehova akozala ‘ekimelo mpe bokasi, lisalisi oyo ezwamaka noki na bantango ya mpasi’ mpo na bandeko.​—Nzembo 46:1.