Lakisá makambo oyo ezali na kati

30/11/2018
CORÉE DU SUD

Bandeko ya Corée oyo babimi na bolɔkɔ

Bandeko ya Corée oyo babimi na bolɔkɔ

Betele ya Corée elobi ete na mokolo ya 30/11/2018, bandeko 57 babimaki na bolɔkɔ mpe bakutanaki lisusu na mabota na bango. Bandeko ya mokili mobimba basepeli na likambo yango mpe bazali kokumisa Yehova na ndenge amoniseli bango boboto mpe apamboli bango.​—Mitángo 6:24-26.

Tozali kobondela mpo na bandeko nsambo oyo batikali na bolɔkɔ, oyo bazali na elikya ya kobima na bolɔkɔ nsima ya kosala sanza motoba ya mbula moko na ndambo ya bolɔkɔ.

Bandeko oyo bauti kobima na bolɔkɔ mpe bakutani lisusu na baboti na bango (na lobɔkɔ ya mwasi, na lobɔkɔ ya mobali). Bapanzi-nsango bazali kotuna ndeko moko mituna na libándá ya bolɔkɔ (na katikati).