Lakisá makambo oyo ezali na kati

7/5/2018
CORÉE DU SUD

Batatoli ya Yehova batandaki mikanda na bango esika masano ya Olympique mpe Paralympique ya 2018 esalemaki

Batatoli ya Yehova batandaki mikanda na bango esika masano ya Olympique mpe Paralympique ya 2018 esalemaki

Ntango masano ya Olympique mpe Paralympique ya eleko ya malili ebandaki na Pyeongchang mokolo ya 9 tii 25/02/2018 mpe mokolo ya 9 tii 18/03/2018, bandeko ya Corée basalaki kampanye moko sipesiale mpo na kopesa mikanda oyo elimbolaka Biblia epai ya bapaya oyo bayaki kotala masano yango.

Bandeko koleka 7 100 na Corée mobimba bapesaki mabɔkɔ na kampanye yango. Mingi na bango bautaki na bingumba Busan, Gwangju, Incheon, Seoul, mpe Suwon; bamosusu kutu bautaki mosika mpenza na esanga Jeju oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ koleka 500 na sudi ya Pyeongchang, esika baturiste bayaka mingi.

Bandeko batyaki bashario ya mikanda 152 na bisika 48, batyaki yango mpe na parkɛ Olympique ya Gangneung mpe na Plaza Olympique ya Pyeongchang. Bazwaki mpe ndingisa ya kotanda mikanda na bango na ekɔtelo ya mboka moko ya Olympique ya makambo ya losambo.

Shario mibale pene ya ekɔtelo ya parkɛ Olympique ya Gangneung na nɔrdi.

Lisusu, bakonzi bapesaki bandeko ndingisa ya kotya bashario na station ya Gangneung, station ya bingbunduka ya vitɛsi makasi, oyo bauti kosilisa kotonga yango kala mingi te, bingbunduka yango ememaka bato kolongwa Incheon mpe Seoul tii Pyeongchang. Na mokolo ya liboso oyo masano yango ya Olympique ebandaki, bato koleka 28 000 basalaki mibembo na station yango.

Mpo na kokokisa mposa ya bato soki 80 000 oyo bayaki kotala masano yango, bandeko bakabolaki babuku, mwa babuku, bazulunalo mpe batrakte na minɔkɔ koleka 20 ata mpe na monɔkɔ ya Chinois, Anglais, Kazakh, Coréen, mpe monɔkɔ ya Russe. Longola yango, bandeko oyo bayebaki elobeli ya bajɛstɛ ya Corée batyaki bashario epai balakisaki bavideo ya elobeli ya bajɛstɛ mpo na kolakisa bababa mingi oyo bayaki kotala masano yango. Bandeko bakabolaki mikanda koleka 71 200.

Na mokili mobimba, Batatoli ya Yehova basalelaka bashario koleka 300 000 mpo na kotanda mikanda na bango na bikólo koleka 35. Yango esalisaka bango básakola esika nyonso oyo bakoki kokuta bato mpe bákokisa mosala na bango malamumalamu.​—2 Timote 4:5.