Lakisá makambo oyo ezali na kati

CORÉE DU SUD

Corée du Sud: Bansango na mokuse

Corée du Sud: Bansango na mokuse

Esali sikoyo mbula koleka 100 banda Batatoli ya Yehova bazali na Corée mpe basalaka losambo na bango na bonsomi. Mokakatano monene oyo Batatoli ya Yehova bazali kokutana na yango na Corée du Sud ezali ndenge guvɛrnema ya ekólo yango ezali kotika te kosambisa baoyo baboyi mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango.

Corée du Sud endimaka te lotomo ya baoyo balukaka kotosa lisosoli na bango mpe ezali na ebongiseli moko te oyo emonisi ete bakoki kopesa moto mosala mosusu na esika ya mosala ya soda. Na yango, bilenge mibali Batatoli ya Yehova oyo baboyaka mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango bakatelaka bango etumbu ya mbula moko na ndambo ya bolɔkɔ. Sanza nyonso, Batatoli ya Yehova ya mibali 40 to 50 bakɔtaka bolɔkɔ. Ata soki Batatoli ya Yehova oyo baboyi mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango babimi na bolɔkɔ, bakobaka kaka konyokola bango mpo batyaka bango na liste ya bato ya mobulu mpe ya baoyo bakimá mosala ya soda. Mpo na yango, Motatoli ya Yehova akoki konyokwama mpo na kozwa mosala mpe kozanga matomba oyo mwana-mboka nyonso ya ekólo yango azwaka.

Mikakatano ekómelaka mpe mibali oyo basilisá formasyo ya mosala ya soda, kasi na nsima bandimaki mateya ya Biblia oyo esɛngi kolinga mozalani mpe koboya koyekola etumba. Lokola babengisaka bango mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala yango soki bosɛnga ezali, mibali yango basambisamaka mbala na mbala mpe bafutisaka bango amande mpo baboyi kokoba formasyo ya mosala ya soda.

Komite ya ONU oyo etalelaka ntomo ya moto ebimisaki bikateli koleka 500 mpo na kokweisa Corée du Sud ndenge eboyi kotosa ntomo ya baoyo baboyaka mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango mpe elobi ete Corée du Sud ezali kotya bato yango na bolɔkɔ to “kokanga bango kaka mpamba.” Elobaki mpe ete na mikolo ezali koya Corée du Sud “esengeli kotika kosala likambo yango oyo ezali kobuka mibeko.” Ekateli oyo Corée du Sud esengeli kozwa mpo na likambo yango ezali ya kotosa bonsomi ya lisosoli mpe ya losambo.