Lakisá makambo oyo ezali na kati

Italie

 

2018-10-17

ITALIE

Bonsomi ya moto ya maladi: Tribinale ya Sicile endimi lisusu lotomo ya Batatoli ya Yehova

Oyo ezali mbala ya liboso tribinale moko na Italie ekweisa monganga na likambo mpe eloba ete atosaki te lotomo oyo moto azali na yango ya kosala oyo alingi na nzoto na ye moko na boyokani na mateya ya Nzambe oyo andimaka.

2018-07-31

ITALIE

Mituna-lisolo elongo na Profesɛrɛ Antonio Pinna

“Nakanisi, ezali kaka te mpo na makambo ya lingomba. Ezali kutu na bato ya maladi oyo bazali Batatoli ya Yehova te kasi baboyaka bázongisa bango makila.”

2018-07-31

ITALIE

Mituna-lisolo elongo na Profesɛrɛ Massimo Franchi

“Napesaka Batatoli ya Yehova mersi na mosala na ngai ya monganga. Basali ete monganga lokola ngai nayeba ndenge nakoki kotika kosalela makila mingi mpe nayeba ntina ya kosala yango.”

2018-07-18

ITALIE

Likita monene na iniversite ya Padua mpo na kolobela milende oyo esalemi mpo na kopesa lisalisi ya monganga kozanga kozongisa makila

Eyebani ete kozongisa makila ezalaka mabe te mpe kaka yango nde solisyo mpo na kobikisa moto oyo azali maladi makasi to oyo balingi kosala ye lipaso ya monene. Mingi ya baoyo basalaki badiskur na likita yango baboyaki likanisi yango.

2018-07-18

ITALIE

Mituna-lisolo elongo na Luca Weltert, M.D.

“Minganga mingi batiki likambo ya kowela kozongisa makila; kaka te epai ya Batatoli ya Yehova oyo bazali maladi, kasi na mokili mobimba mpo ezali na bilembeteli mingi oyo emonisi ete koboya kowela kozongisa makila ezali kobimisa mbuma malamu koleka.”