Lakisá makambo oyo ezali na kati

(Na lobɔkɔ ya mwasi) Libota moko ezali kosala bilembo na maloba ya kolendisa mpo na kopesa biyano ya kolendisa na makita ya lisangá. (Na lobɔkɔ ya mobali) Ndeko mwasi moko oyo azali mobongisi-nzela azali koyekola Biblia na moto na video. (Na nse ya lobɔkɔ ya mobali) Libota moko ezali kolanda makita na nzela ya video

09/04/2020
ITALIE

Bandeko na Italie babateli boyokani makasi na Yehova ata na ntango ya maladi mabe

Bandeko na Italie babateli boyokani makasi na Yehova ata na ntango ya maladi mabe

Italie ezali moko ya bamboka oyo bato ebele mpenza babɛli maladi ya Coronavirus. Na litambwisi ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, filiale ya Italie ezali kosalisa bandeko na mosuni mpe na elimo.

Komite misato mpo na kopesa lisungi na ntango ya makama ezali kosalisa bandeko kuna na nɔrdi, na katikati mpe na sudi ya Italie. Bakomite yango eyebi biloko nyonso oyo basakoli oyo bazali na mikakatano basengeli na yango, mpo bazali ntango nyonso kosolola na bakɛngɛli ya zongazonga, mpo bango bazwaka bansango mbala na mbala epai ya bankulutu.

Longola lisalisi ya mosuni, bankulutu bazali kosalisa bandeko bákoba koyanganaka na makita mpe kosakolaka. Ndeko Villiam Boselli, mokɛngɛli ya zongazonga oyo asalaka pene na Milan, moko ya bingumba oyo bato ebele mpenza bazwaki maladi yango, alobi boye: “Atako bandeko bafandi na bandako, bango nyonso bazali kokoba kosolola. Lisusu, lokola bazali kolanda makita na nzela ya video na Internet, bazali kolendisana mpe kolobela kondima na bango na biyano ya malamu. Ata bandeko oyo bakómi mibange bazali kozwa matomba ndenge bazali kolanda makita na nzela ya video na Internet. Nakanisi ete sikoyo masangá ekómi na bomoko makasi koleka liboso!”

Lisusu, bato mingi bazali kolanda makita elongo na bandeko na bango oyo bazali Batatoli ya Yehova te. Ndeko mwasi moko alobi boye: “Mobali na ngai alingaka koyangana na makita ata moke te, sikoyo makita ekómi koyela ye na ndako . . . oyebi nini? Akómi kolanda makita mpe kosepela na yango!”

Bandeko bazali kosalela mabaku nyonso mpo na kopesa litatoli. Na ndakisa, ndeko mwasi moko azalaki kokende kotikela ndeko moko ya mobange kiti ya bibɔsɔnɔ, mpe bapolisi batɛlɛmisaki ye na nzela. Ndeko mwasi yango ayebisaki bango ete azali kosalisa mobange moko mpe alakisaki bango mokanda oyo epesi ye ndingisa ya kotambola. Na nsima apesaki bango batrakɛ Okanisaka ete bomoi ekozala ndenge nini na mikolo ezali koya? mpe Bampasi ekosila mokolo mosusu? Bapolisi bazwaki yango. Ntango ndeko yango azalaki kozonga nsima ya kotika kiti yango, bapolisi batɛlɛmisaki ye lisusu. Na mbala oyo, bapesaki ye mersi mpe batunaki mituna mingi mpo na elikya oyo Biblia epesi. Babengaki kutu baninga na bango mibale báya kosangana na lisolo. Ndeko na biso asepelaki kolakisa bango jw.org. Polisi moko alobaki na ye: “Mersi mama, osepelisi biso mpenza lelo!”

Ndeko Boselli alobi: “Atako mokumba na ngai ezali ya kolendisa mpe kopesa bato makasi, ngai moko nalendisamaki ndenge namonaki bandeko batikali makasi na elimo mpe bazali na ekateli ya kokoba koyika mpiko. Lokola bazali kolinga Yehova na bolingo ya solosolo, ezali malamu mpe ezali kosimba motema na ngai. Bazali mpenza makabo oyo euti na Yehova oyo tosengeli na yango!”

Emonani polele ete, atako mikakatano ezali, bandeko na biso bazali kaka makasi na elimo, mpe ‘baningani ata moke te na malɔzi oyo.’​—1 Batesaloniki 3:2, 3.