Lakisá makambo oyo ezali na kati

Makambo esalemaka ndenge nini na fɛti ya libala ya Batatoli ya Yehova?

Makambo esalemaka ndenge nini na fɛti ya libala ya Batatoli ya Yehova?

Mbala mingi bafɛti ya libala ya Batatoli ya Yehova ezalaka mindɔndɔ te mpe ezalaka ntango moko ya lokumu, ezalaka na diskur moko ya mokuse oyo euti na Biblia. Na nsima, molulu yango ekoki kolandana na mwa bokutani moko ya moke to fɛti ya libala mpo na kolya to komɛla. a Na ebandeli ya mosala na ye ya kosakola, Yesu akendaki mpe fɛti ya bongo na engumba Kana.​—Yoane 2:1-11.

 Makambo esalemaka ndenge nini na molulu yango?

Likambo ya ntina na molulu ya libala ezali diskur ya libala. Diskur yango esalemaka na boumeli ya miniti soki 30 mpe Motatoli ya Yehova moko nde asalaka diskur yango. Diskur yango esimbaka mitema ya bato mpe elendisaka bango. Yango emonisaka ndenge Biblia ekoki kosalisa babalani bázala na libala oyo ekoumela, ya bolingo, mpe ya esengo.​—Baefese 5:33.

Na bikólo mingi, guvɛrnema epesaka Batatoli ya Yehova ndingisa ya kobalisa. Na ntango yango, na nsuka ya diskur ya libala, babalani basalaka elako ya libala. Mpe balatisanaka lopɛtɛ na misapi. Na nsima, motatoli ya Yehova oyo asalaki diskur yango akoloba ete babalani yango bakómi sikoyo mwasi ná mobali na kotalela mibeko.

Na bikólo mosusu, mobeko esɛngaka ete bato bákende kobala liboso ya biro ya Leta oyo etalelaka libala. Babalani bakendeke na biro yango ya Leta mwa moke liboso bálanda diskur ya libala. Soki mobali ya libala mpe mwasi ya libala basalaki elako te na biro ya Leta oyo etalelaka libala, bakoki kosala elako na nsuka ya diskur ya libala. Soki basalaki elako, bakoki kopona kozongela yango, kasi na mbala oyo, bakosala yango na maloba oyo ekomonisa ete basí basalaki elako yango. Diskur ya libala ekosuka na libondeli mpo na kosɛnga Nzambe apambola babalani yango ya sika.

 Bafɛti ya libala ya Batatoli ya Yehova esalemaka wapi?

Batatoli ya Yehova mingi baponaka kosala molulu ya libala na bango na Ndako ya Bokonzi soki likoki ezali. b Soki babalani bakosala fɛti nsima ya diskur, baponaka esika mosusu mpo na yango.

 Banani bakoki kokende na fɛti yango?

Soki libala esalemi na Ndako ya Bokonzi, mbala mingi ezalaka mpo na moto nyonso; elingi koloba ozala Motatoli ya Yehova to te, okoki koya. Kasi, soki babalani bakosala fɛti ya libala na bango, bango moko bakopona bato oyo bakobengisa na fɛti na bango.

 Esengeli kolata ndenge nini mpo okende na fɛti yango?

Atako ezalaka kaka te na lolenge moko boye ya kolata mpo moto akende na libala na Ndako ya Bokonzi, Batatoli ya Yehova basalaka makasi bálanda toli ya Biblia, na yango balataka na ndenge ebongi mpe ya lokumu mpo na kopesa lokumu na molulu wana ya ntina mingi. Basepelaka mpe soki bato mosusu basali bongo. (1 Timote 2:9) Ya solo, mitinda yango esalelamaka mpe mpo na esika ya fɛti ya libala, soki babalani baponi kosala yango kuna.

 Bato bakendeke na bakado ya libala?

Biblia esɛngaka biso tókabelaka basusu na motema moko. (Nzembo 37:21) Batatoli ya Yehova basepelaka kokabela basusu mpe kozwa bakado ya libala. (Luka 6:38) Kasi, basɛngaka bakado yango te to bayebisaka te nkombo ya bato oyo bapesaka yango. (Matai 6:3, 4; 2 Bakorinti 9:7; 1 Petro 3:8) Mimeseno yango eyokani te na Biblia, ekoki kosala ete bato oyo bayei na fɛti bámiyoka mabe.

 Bato bakotombola kɔpɔ ya masanga?

Te. Batatoli ya Yehova batombolaka te kɔpɔ ya masanga, mpo momeseno yango euti na mimeseno ya mangomba ya lokuta. c Batatoli ya Yehova bayebisaka babalani ya sika ete balingi bázala na libala ya esengo, kasi basalaka yango te na nzela ya kotombola kɔpɔ ya masanga.

 Bato oyo bayei na fɛti ya libala bakobwakela babalani loso?

Te. Na bisika mosusu, babwakelaka babalani loso to eloko oyo ekokani na yango. Bakanisaka ete yango ekomemela babalani yango bolamu, esengo mpe bomoi molai. Kasi Batatoli ya Yehova baboyaka mimeseno yango mpo euti na biyambayamba. Yango esangisi makambo lokola kotombela moto “makila malamu,” mpo eyokani te na mitinda ya Biblia.​—Yisaya 65:11.

 Masanga mpe bilei ekozala?

Balyaka te to bamɛlaka te bilei ya Fɛti ya libala na Ndako ya Bokonzi. Babalani mosusu baponaka esika oyo bakosala fɛti ya libala na bango mpo na kolya bilei to komɛla masanga. (Mosakoli 9:7) Soki baponi kopesa bato masanga, bamindimisaka ete ekozala na ndenge oyo ekolekisa ndelo te mpe kaka baoyo bazali na mbula ya komɛla masanga na kotalela mibeko ya mboka na bango nde basengeli komɛla yango.​—Luka 21:34; Baroma 13:1, 13.

 Miziki to kobina ekozala?

Soki mwasi ná mobali oyo balingi kobalana bazali kobongisa fɛti na bango ya libala, bakoki kopona miziki mpe mabina oyo ekozala na fɛti yango. (Mosakoli 3:4) Bakopona miziki oyo ezali malamu, kutu miziki yango ekotalela babalani bango moko mpe mimeseno ya mboka na bango. Mbala mingi molulu ya libala oyo esalemaka na Ndako ya Bokonzi ezalaka mpe na miziki oyo motó ya likambo na yango euti na Biblia.

 Batatoli ya Yehova basalaka fɛti ya anivɛrsɛrɛ ya libala na bango?

Lokola mitinda ya Biblia endimi te to epekisi te kosala fɛti ya anivɛrsɛrɛ ya libala, Batatoli ya Yehova oyo babalá baponaka bango moko kosala to te fɛti ya anivɛrsɛrɛ ya libala na bango. Soki baponi kosala yango, basalaka yango bango moko to elongo na baninga mpe bato ya libota na bango.

a Mboka na mboka ekoki kozala na mimeseno na yango, ndenge na yango ya kosala makambo mpe mibeko na yango.

b Moto oyo asalaka diskur ya libala bafutaka ye te mpo na yango, bafutaka mpe mbongo te mpo na kosalela Ndako ya Bokonzi.

c Mpo na koyeba ete momeseno ya kotombola kɔpɔ ya masanga euti na bapakano, talá ““Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/02/2007.