Lakisá makambo oyo ezali na kati

Mpo na nini Batatoli ya Yehova bakɔtaka na makambo ya politiki te?

Mpo na nini Batatoli ya Yehova bakɔtaka na makambo ya politiki te?

 Batatoli ya Yehova bakɔtaka na makambo ya politiki te mpo balandaka mateya oyo euti na Biblia. Topesaka makanisi na makita ya bato ya politiki te, tosalaka voti te, topesaka nkombo na voti te, mpe tosalaka ata likambo moko te mpo na kobongola makambo na kati ya guvɛrnema ya mboka. Tondimaka ete Biblia emonisi ete tosengeli te kosala makambo wana. Mpo na nini?

  •   Tolandaka ndakisa ya Yesu; ye aboyaki kokóma mokonzi ya politiki. (Yoane 6:15) Ateyaki bayekoli na ye ete ‘bázala bato ya mokili te’ mpe amonisaki polele ete basengeli te kokɔta na makambo ya politiki.​—Yoane 17:14, 16; 18:36; Marko 12:13-17.

  •   Tozali na ngámbo ya Bokonzi ya Nzambe, oyo Yesu alobelaki na maloba oyo: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Lokola tozali bato ya Bokonzi ya Nzambe mpe tozali na mokumba ya kosakola koya na yango, tokɔtaka na makambo ya politiki ata ya ekólo moko te, ezala mpe ya ekólo oyo tofandi.​—2 Bakorinti 5:20; Baefese 6:20.

  •   Lokola tokɔtaka na makambo ya politiki te, tobangaka te kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe epai ya bato nyonso, ata ya lisangá nini ya politiki. Tosalaka makasi mpo maloba mpe misala na biso emonisa ete tondimaka ete Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa mikakatano ya bato.​—Nzembo 56:11.

  •   Lokola tokɔtaka te na matata ya politiki, tozali na bomoko na bandeko na biso ya mokili mobimba. (Bakolose 3:14; 1 Petro 2:17) Kasi, bandimi ya mangomba oyo ekɔtaka na makambo ya politiki bazalaka na bomoko te.​—1 Bakorinti 1:10.

 Kotosa baguvɛrnema. Atako tokɔtaka na makambo ya politiki te, totosaka bakonzi ya mboka oyo tofandi. Yango eyokani na toli oyo ya Biblia ete: “Tika ete moto na moto atosaka bango bazali na bokonzi.” (Baroma 13:1, haut fleuve) Totosaka mibeko ya mboka, tofutaka mpako, mpe tosalaka makambo oyo guvɛrnema esɛngi mpo na bolamu ya bana-mboka nyonso. Na esika tósangana na basusu mpo na koluka kokweisa baguvɛrnema, tolandaka toli ya Biblia ya kobondela mpo na “bakonzi mpe baoyo nyonso bazali na bibonga minene,” mingimingi soki bazwi ekateli ya kopekisa makambo etali losambo na biso.​—1 Timote 2:1, 2.

 Tondimaka ete moto na moto asengeli kozwa bikateli ye moko na makambo ya politiki. Na ndakisa, totyaka mobulu na maponami te mpe topekisaka te bato bákende kosala voti.

 Koboya kokɔta na makambo ya politiki ezali likambo ya sika? Te. Bantoma mpe bakristo mosusu ya siɛklɛ ya liboso baboyaki mpe kokɔta na makambo ya politiki. Buku moko (Beyond Good Intentions) elobi ete: “Atako bakristo ya liboso bayebaki ete bazali na mokumba ya kotosa bakonzi ya Leta, bazalaki kondima te kokɔta na makambo ya politiki.” Ndenge moko mpe, buku moko (On the Road to Civilization) elobi ete bakristo ya liboso “bazalaki kondima mikumba ya politiki te.”

 Ndenge toboyaka kokɔta na makambo ya politiki ezali likama mpo na kimya ya mboka? Te. Bakonzi ya Leta babangelaka biso te mpo tozali bato ya kimya. Tózwa ndakisa ya lapolo moko ya 2001 oyo ebongiseli moko (National Academy of Sciences of Ukraine) ebimisaki. Lapolo yango elobaki boye mpo na ndenge oyo tokɔtaka te na makambo ya politiki: “Lelo oyo bato mosusu bakoki koyina Batatoli ya Yehova mpo na ekateli oyo bazwi; ezali mpo na yango nde bakonzi ya Nazi mpe Bakoministe bafundaki bango na kala.” Atako bato ya Union soviétique banyokolaki bango, Batatoli “bakobaki kotosa mibeko ya mboka. Bakobaki kosala na baferme mpe bilanga minene mpe bazalaki likama moko te mpo na guvɛrnema ya Bakoministe.” Ndenge emonisami na nsuka ya lapolo yango, lelo oyo, mateya mpe makambo oyo Batatoli ya Yehova basalaka “ezali likama te mpo na kimya ya mboka.”