Lakisá makambo oyo ezali na kati

NDENGE BAVƐRSƐ YA BIBLIA ELIMBOLAMI

Matai 6:34​—‘Bómitungisa te mpo na makambo ekoya lobi’

Matai 6:34​—‘Bómitungisa te mpo na makambo ekoya lobi’

 “Bómitungisa ata moke te mpo na mokolo oyo ekolanda, mpo mokolo oyo ekolanda ekozala na mitungisi na yango moko. Mokolo na mokolo ezali na mitungisi na yango.”​—Matai 6:34, Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika.

 “Bómitungisa té po na makambo ekoya lobi; lobi ekozala na makambo na yango. Mokolo na mokolo ezali na pasi ekoki na yango.”​—Matai 6:34, Bible na Lingala ya lelo oyo.

Ndenge Matai 6:34 elimbolami

 Yesu, oyo alobaki maloba wana, akitisaki bayoki na ye motema ete basengeli komitungisa te koleka ndelo, to komitungisa na ndenge ya mabe mpo na mikakatano oyo ekoya. Kutu, basengelaki nde kozwa matomba soki babundi na mokakatano ya mokolo na mokolo.

 Yesu alingaki koloba te ete tosengeli te kokanisa makambo ya lobi to tosengeli te kobongisa makambo mpo na mikolo ezali koya. (Masese 21:5) Kutu, azalaki nde kosalisa biso mpo tómitungisaka te koleka ndelo, mpo na makambo oyo ekoki kokómela biso lobi. Mitungisi ya ndenge wana ekoki kosala ete tózala na esengo te mpe tókokisa te mikumba na biso ya ntina. Tokoki te kosilisa mikakatano oyo esalemi naino te soki tozali komitungisa mpo na yango lelo oyo. Mpe makambo oyo tomitungisaka mpo na yango mbala mingi esalemaka te, to makambo ekómaka mabe te ndenge tokanisaki.

Makambo oyo bazali kolobela na Matai 6:34

 Maloba wana ya Yesu ezali na kati ya Lisolo likoló ya Ngomba, oyo ezwami na Matai mokapo 5-7. Na lisolo na ye likoló ya Ngomba, Yesu alimbolaki ete komitungisa koleka ndelo ekoki te kobongola makambo to kobakisa eloko na bomoi na biso. (Matai 6:27) Alobaki mpe ete ntango tozali kotya Nzambe na esika ya liboso na bomoi na biso, tosengeli te komitungisa koleka ndelo mpo na makambo oyo ekosalema lobi. Nzambe akipaka milona mpe banyama, mpe akozanga te kokipe bato oyo basalelaka ye.​—Matai 6:25, 26, 28-33.

Tángá Matai mokapo 6 ná maloba na nse ya lokasa, ndimbola ya maloba oyo oyebi malamu te, mpe bililingi.