Lakisá makambo oyo ezali na kati

LISALISI MPO NA LIBOTA | KOBƆKƆLA BANA

Salisá bana na yo bámitungisaka te koleka ndelo mpo na bansango ya kobangisa

Salisá bana na yo bámitungisaka te koleka ndelo mpo na bansango ya kobangisa

 Bapesaka mbala na mbala bansango ya kobangisa mpe balakisaka bililingi ya mabe na batelevizyo, na batelefone, na batablɛti, mpe na baordinatɛrɛ.

 Mpe bana balandaka yango.

 Ndenge nini okoki kobatela bana na yo mpo bámitungisaka te koleka ndelo na bansango ya kobangisa?

 Bansango esalaka bana nini?

  •   Bana mingi bamitungisaka mpo na makambo ya kobangisa oyo balandaka na bansango. Bana mosusu bakoki te komonisa polele ndenge bazali komiyoka, kasi nsango moko ya kobangisa ekoki kotungisa bango mingi koleka. a Soki baboti bazali komitungisa mingi koleka, bana mpe bakomitungisa mingi koleka.

  •   Bana bakoki kobongola na ndenge mosusu bansango oyo bazali kolanda. Na ndakisa, bana mosusu bakanisaka ete makambo oyo esalemaki ekosalelama mpe na libota na bango. Mpe bana oyo bazali naino bilenge oyo batalaka bililingi ya mabe bakoki kokanisa ete likambo yango esalemaka mbala na mbala.

  •   Bana bakoki te komipekisa na makambo etali kolanda bansango. Bakoki te koyeba ete bakompanyi oyo epesaka bansango ezwaka mbongo mingi mpo na yango. Na yango, bansango ekoki kopesama na ndenge oyo ekobenda likebi ya bayoki ntango nyonso.

 Okoki kosala nini mpo na kosalisa bana na yo bámitungisaka te koleka ndelo na bansango ya kobangisa?

  •   Tyá bandelo mpo bana balandaka ntango nyonso te bansango ya kobangisa. Yango elingi koloba te ete bana basengeli te koyeba makambo oyo ezali koleka na mokili. Kasi kotala to kolanda bansango ya kobangisa esalaka ete bana bámiyoka malamu te.

     “Mbala mosusu, ngai ná mobali na ngai tolobelaka makambo ya mikemike etali nsango moko ya kobangisa, nzokande toyebaka te yango etungisaka bana na biso ntango bayokaka biso.”​—Maria.

     Toli ya Biblia: “Motungisi na kati ya motema ya moto yango nde etindaka motema na ye egumbama.”​—Masese 12:25.

  •   Zalá na motema molai, landáká na likebi, mpe omityaka na esika ya bana. Soki ezalaka mpasi mpo na mwana na yo kolobela likambo moko oyo esalemi, yebisá ye asala elilingi ya likambo yango. Lobelá likambo oyo ezali kotungisa mwana na maloba ya polele mpo akanga ntina na yango, kasi boyá kolobela makambo ya mikemike oyo ezangá ntina.

     “Mwana na biso ya mwasi amiyokaka malamu soki tofandi mpe tozali koyoka ye na likebi ntango azali koloba. Yango esalisaka ye te ntango tolobaka na ye boye: ‘Sikoyo makambo ezali bongo, mpe tosengeli komesana na yango.’”​—Sarahi.

     Toli ya Biblia: ‘Yokáká noki, kowelaka koloba te.’​—Yakobo 1:19.

  •   Salisá bana na yo báyeba komipekisa. Na ndakisa, nsango etali likambo ya koyiba bana ekoki kotinda mwana nakanisa ete yango esalemaka mingi mpenza mbala na mbala nzokande ezali bongo te. Limbwelá mwana makambo oyo osalaka mpo na kobatela ye azala malamu. Lisusu, simbá ete soki likambo moko esalemi, ekómaka nsango ya sika mpo ezali na nsango mosusu te oyo ekokani na yango.

     “Salisá mwana na yo ayeba kobatela mayoki na ye. Mbala mingi, makanisi oyo moto azalaka na yango nde etindaka ye amonisa mayoki na ye, yango wana soki tosalisi bana na biso bátya makanisi na likambo ya malamu, bamonaka ete avenire na bango ekozala malamu.”​—Lourdes.

     Toli ya Biblia: “Motema ya moto ya bwanya etindaka monɔkɔ na ye emonisa mayele ya kososola, mpe mbɛbu na ye eyebaka kondimisa.”​—Masese 16:23.

a Bilenge oyo bazali naino bana bakoki komonisa ete bazali komitungisa ntango bakobanda kosuba na mbɛto, to kobanga kokende kelasi mpe koboya kokabwana na baboti na bango.