Lakisá makambo oyo ezali na kati

Laki ya mɔtɔ ezali nini? Ezali ndenge moko na lifelo to na Gehena?

Laki ya mɔtɔ ezali nini? Ezali ndenge moko na lifelo to na Gehena?

Eyano ya Biblia

 Laki ya mɔtɔ ezali elilingi ya libebi ya seko. Ezali ndenge moko na Gehena, kasi ekeseni na lifelo, oyo ezali nde nkunda ya bato nyonso.

Ezali laki ya solosolo te

 Bavɛrsɛ mitano ya Biblia oyo elobeli “laki ya mɔtɔ” emonisi ete ezali laki ya solosolo te, kasi ya elilingi. (Emoniseli 19:20; 20:10, 14, 15; 21:8) Na laki yango, bakobwaka:

Elilingi ya libebi ya seko

 Biblia elobi ete laki ya mɔtɔ “elakisi liwa ya mibale.” (Emoniseli 20:14; 21:8) Liwa ya liboso oyo Biblia elobeli ezali liwa oyo eutá na lisumu ya Adama. Lisekwa ekoki kosukisa liwa yango mpe nsukansuka, Nzambe akolongola yango.​—1 Bakorinti 15:21, 22, 26.

Moto akoki te kobima na laki ya mɔtɔ

 Laki ya mɔtɔ ezali komonisa liwa ya ndenge mosusu, to liwa ya mibale. Atako yango mpe elimboli kozanga bomoi, yango ezali ndenge mosusu mpo ata na esika moko te Biblia elobeli lisekwa mpo na liwa ya mibale. Na ndakisa, Biblia elobi ete Yesu azali na “bafungola ya liwa mpe ya Nkunda”; yango elimboli ete azali na nguya ya kosikola bato na liwa oyo eutá na lisumu ya Adama. (Emoniseli 1:18; 20:13) Nzokande, moto moko te, ata mpe Yesu, azali na fungola ya laki ya mɔtɔ. Laki yango ya elilingi elimboli etumbu ya seko, libebi ya libela na libela.​—2 Batesaloniki 1:9.

Ekokani na Gehena, Lobwaku ya Hinome

 Biblia elobeli Gehena (na Grɛki géénna) mbala 12. Ndenge moko na laki ya mɔtɔ, Gehena ezali elilingi ya libebi ya seko. Atako Babiblia mosusu ebongoli liloba yango na “lifelo,” Gehena ekeseni na lifelo (na Ebre sheol, na Grɛki hades).

Lobwaku ya Hinome

 Liloba “Gehena” elimboli mpenzampenza “Lobwaku ya Hinome,” oyo ezalaki libándá ya engumba Yerusaleme. Na ntango ya kala, bato ya Yerusaleme bazalaki kobwaka bosɔtɔ na lobwaku yango. Mɔtɔ ezalaki kopela kuna ntango nyonso mpo na kotumba biloko oyo ebwakami; nkusu ezalaki kolya eloko nyonso oyo mɔtɔ etumbi te.

 Yesu alobelaki Gehena mpo na komonisa libebi ya seko. (Matai 23:33) Alobaki ete na Gehena “nkusu . . . ekufaka te mpe mɔtɔ ebomamaka te.” (Marko 9:47, 48) Na yango, alobelaki Lobwaku ya Hinome mpe esakweli ya Yisaya 66:24, oyo elobi ete: “Bakobima mpenza mpe bakotala bibembe ya bato oyo bazalaki kobuka mibeko na ngai; mpo nkusu likoló na bango ekokufa te mpe mɔtɔ na bango ekobomama te.” Yesu azalaki kolobela monyoko te, kasi nde kobomama mpo na libela. Nkusu ná mɔtɔ ezalaki kolya nde bibembe, kasi bato ya bomoi te.

 Biblia emonisi ata na esika moko te ete eloko oyo ekei na Gehena ekoki kozonga. “Laki ya mɔtɔ” mpe “mɔtɔ ya Gehena” elimboli libebi ya seko, to ya libela na libela.​—Emoniseli 20:14, 15; 21:8; Matai 18:9.

Na ndenge nini “bakonyokwama butu moi libela na libela”?

 Soki laki ya mɔtɔ ezali elilingi ya libebi ya seko, mpo na nini Biblia elobi ete kuna, Zabolo, nyama mabe, mpe mosakoli ya lokuta “bakonyokwama butu moi libela na libela”? (Emoniseli 20:10) Talá makambo minei oyo emonisi ete vɛrsɛ wana elobeli konyokwama ya solo te:

  1.   Mpo Zabolo anyokwama libela na libela, asengeli kozala na bomoi libela na libela. Nzokande, Biblia elobi ete Zabolo akobebisama nyɛɛ, elingi koloba akozala lisusu na bomoi te.​—Baebre 2:14.

  2.   Bomoi ya seko ezali likabo oyo Nzambe akopesa bato, ezali etumbu te.​—Baroma 6:23.

  3.   Nyama mabe ná mosakoli ya lokuta ezali maloba ya elilingi mpe ekoki konyokwama libela na libela te.

  4.   Bavɛrsɛ mosusu ya Biblia emonisi ete monyoko ya Zabolo ezali kokangama to libebi ya seko.

 Liloba “monyoko” oyo esalelami na Biblia ekoki mpe kolimbola “kokangama.” Na ndakisa, na Babiblia mingi, liloba ya Grɛki oyo esalelamaka mpo na “banyokoli” ebongolami na “bakɛngɛli ya bolɔkɔ na Matai 18:34, mpo na komonisa ete liloba “monyoko” mpe “kokangama” ezali na boyokani. Ndenge moko mpe, lisolo oyo ezali na Matai 8:29 mpe Luka 8:30, 31 emonisi boyokani oyo ezali kati na “konyokola” mpe “libulu mozindo,” oyo ezali elilingi ya kozanga bomoi to liwa. (Baroma 10:7; Emoniseli 20:1, 3) Kutu, mbala mingi, mokanda ya Emoniseli esaleli liloba “konyokola” na ndenge ya elilingi.​—Emoniseli 9:5; 11:10; 18:7, 10.