Lakisá makambo oyo ezali na kati

Mokristo akoki kondima lisalisi ya monganga?

Mokristo akoki kondima lisalisi ya monganga?

Eyano ya Biblia

 Ɛɛ. Yesu amonisaki ete bayekoli na ye bakoki koluka lisalisi ya monganga, ntango alobaki ete “bato ya nzoto kolɔngɔnɔ bazalaka na mposa ya monganga te, kasi nde bato oyo bazali kobɛla.” (Matai 9:12) Atako Biblia ezali buku oyo elobeli makambo ya monganga te, epesi toli oyo ekoki kosalisa bato oyo balingi kosepelisa Nzambe.

Omituna boye:

 1. Nayebi malamu lisalisi oyo monganga alingi kopesa ngai? Biblia elendisi biso tólukaka koyeba makambo malamumalamu na esika ya ‘kondima liloba nyonso.’​—Masese 14:15.

 2. Malamu nakende mpe koluka monganga mosusu mpo apesa makanisi na ye? Ezalaka malamu “ntango bapesi-toli bazali ebele,” mingimingi soki ozali na maladi moko ya makasi.​—Masese 15:22.

 3. Lisalisi oyo monganga alingi kopesa ngai, ekobuka mobeko ya Biblia oyo elobi ete ‘bóboya makila?’​—Misala 15:20.

 4. Mpo na koyeba maladi to kopesa nkisi, basalaka bikelakela? Biblia epekisi “misala ya bilimo mabe.” (Bagalatia 5:19-21) Mpo oyeba soki lisalisi ya monganga ezali na boyokani na misala ya bilimo mabe to te, talelá mituna lokola oyo:

  •   Monganga yango asalaka bikelakela?

  •   Lisalisi oyo akopesa emonisi ete andimaka ete moto abɛlaka soki banzambe basiliki to soki banguna babwakeli ye maladi?

  •   Liboso apesa nkisi, apesaka bambeka, abelelaka bankɔkɔ, to asalaka milulu to makambo mosusu ya molili?

 5. Makanisi na ngai nyonso ekómi kaka na kolɔngɔnɔ ya nzoto na ngai? Biblia epesi toli oyo: “Bato nyonso báyeba ezaleli na bino ya makambo makasimakasi te.” (Bafilipi 4:5) Kozala makambo makasimakasi te ekosalisa yo otya makanisi na “makambo oyo eleki ntina”, na ndakisa na makambo ya Nzambe.​—Bafilipi 1:10; Matai 5:3.