Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MITUNA-LISOLO | CÉLINE GRANOLLERAS

Monganga moko ya maladi ya bangɛi alobeli kondima na ye

Monganga moko ya maladi ya bangɛi alobeli kondima na ye

Doktɛrɛ Céline Granolleras azali monganga oyo ayekolaka bamaladi ya bangɛi na ekólo France. Mbula koleka 20 nsima ya kokóma doktɛrɛ, andimaki ete ezali na Mozalisi oyo atyelaka biso likebi. Lamuká! etunaki ye mituna mpo na mosala na ye mpe kondima na ye.

Yebisá biso ndenge okolaki.

Ntango nazalaki na mbula libwa, libota na biso elongwaki na ekólo Espagne mpe ekendaki kofanda na France. Baboti na ngai bazalaki bato ya Lingomba ya Katolike, kasi ngai natikaki kondimela Nzambe ntango nakómaki na mbula 16. Mpo na ngai, lingomba ezalaki na boyokani te na makambo ya bomoi. Soki moto atuni ngai ndenge oyo bomoi ebandaki soki Nzambe azalaka te, nazalaki koyanola ete: “Mpo na sikoyo, bato ya siansi bazali na eyano te, kasi mokolo mosusu bakozwa eyano.”

Nini etindaki yo oyekola maladi ya bangɛi?

Natángaki kelasi na eteyelo moko ya minganga na engumba Montpellier, na France. Kuna, profesɛrɛ moko abengaki ngai nasala na néphrologie, boyekoli moko ya mayele ya minganga oyo etalelaka bamaladi ya bangɛi. Mosala yango esɛngaki kosala bolukiluki mpe kosalisa bato ya maladi. Ezalaki mpenza oyo nazalaki koluka. Na 1990, nabandaki kosangana na mosala ya bolukiluki na ndenge ya kosalela érythropoïétine (EPO) lokola nkisi ya monganga mpo na kokitisa to komatisa ba-globules rouges na kati ya mafuta oyo ezalaka na kati ya mikuwa. Na ntango wana, ezalaki lolenge ya sika ya kosala bolukiluki.

Nini etindaki yo obanda kokanisa Nzambe?

Na 1979, Batatoli ya Yehova babandaki koyekola Biblia na mobali na ngai Floréal. Kasi ngai nazalaki kosepela na yango te. Ntango nazalaki naino mwana, nayebaki makambo mingi etali lingomba. Atako bongo, mobali na ngai mpe bana na biso bakómaki Batatoli mpe mwa moke na nsima, pene na baninga na biso nyonso bazalaki Batatoli. Moko na bango, Patricia ayebisaki ngai ete namekaka kobondela. Alobaki boye: “Soki moto moko te azalaka na likoló, eloko moko te kosalema. Kasi soki azalaka, okomona oyo ekosalema.” Nsima ya bambula, nabandaki komituna mpo na ntina ya bomoi mpe nakanisaki lisusu maloba ya Patricia. Nabandaki kobondela mpo nakanga ntina.

Nini etindaki yo oluka koyeba ntina ya bomoi?

Ndenge oyo bateroriste bakweisaki World Trade Center na engumba New York, etindaki ngai namituna mpo na nini mabe ezali mingi na mokili. Nakanisaki boye: ‘Bato oyo bamipesá mingi koleka na mangomba bazali kotya bomoi ya mikolo ezali koya na likama. Kasi, Batatoli ya Yehova oyo bazali zingazinga na ngai bazali bongo te mpe bazali bato ya kimya. Balandaka Biblia. Ntango mosusu, esengeli naluka koyeba makambo oyo balobaka.’ Yango wana, nabandaki kotánga Biblia ngai moko.

Lokola ozali doktɛrɛ, ezalaki mpasi mpo na yo kondimela Mozalisi?

Te. Nazalaki na limemya makasi mpenza na ndenge oyo nzoto na biso esalemá na ndenge ya kokamwisa. Na ndakisa, ndenge oyo bangɛi na biso esalaka ete ba-globules rouges ezala mingi koleka te to moke mpe te na kati ya makila na biso, ekamwisaka mpenza.

Mpo na nini olobi bongo?

Nayaki koyeba ete kaka Nzambe nde akokaki kosala likambo ya mayele ndenge wana

Ndenge mbala mosusu oyebi yango, ba-globules rouges ememaka mopɛpɛ (oxygène). Soki makila na yo ekiti mingi to soki omati na esika moko ya likoló mpenza, nzoto na yo ekozanga mopɛpɛ. Bangɛi na biso ezalaka na biloko moko oyo eyebisaka soki mopɛpɛ ezali mingi to moke. Soki mopɛpɛ etikali moke na makila na biso, biloko yango ekotinda EPO esala mosala, mpe EPO ekokómisa mopɛpɛ yango mingi na makila mbala nkotó moko. EPO esalaka ete mikuwa ebimisa mafuta na yango mingi, mpo mafuta yango oyo ezalaka na kati ya mikuwa, emema mopɛpɛ mingi. Ezali mpenza likambo ya kokamwa! Nzokande, nayaki koyeba ete kaka Nzambe nde akokaki kosala likambo ya mayele ndenge wana nsima ya kolekisa mbula zomi na koyekola yango.

Ntango obandaki kotánga Biblia omonaki yango ndenge nini?

Natángá babuku mingi mpe bazulunalo ndenge na ndenge, kasi namonaki mbala moko ete Biblia ekeseni na babuki mosusu nyonso. Lokola toli ya Biblia ebongi mpenza, yango emonisi ete esengeli kozala buku ya bato te. Bizaleli ya Yesu ekamwisaki ngai mpenza. Namonaki ete azalaki moto ya solosolo. Azalaki na mayoki, azalaki mpe na baninga. Lokola nalingaki te kosalela mikanda ya Batatoli ya Yehova, nazalaki kosala bolukiluki na ba-encyclopedies mpe mikanda mosusu na makambo oyo nazalaki kotya ntembe.

Osalaki bolukiluki na makambo nini?

Nasalaki bolukiluki na babuku ya istware . . . Nsukansuka, namonaki ete esakweli wana ya Biblia ekokisamaki na ntango oyo ebongi

Moko ya makambo oyo ebendaki likebi na ngai ezalaki ndenge oyo Biblia esakolaki mbula oyo Yesu asengelaki kozwa batisimo. Esakweli yango emonisi mpenza ntango boni esengelaki koleka kobanda na mbula ya ntuku mibale (20) na boyangeli ya Artazerezese mokonzi ya Perse mpe mbula oyo Yesu asengelaki komonana lokola Masiya. * Namesaná kosala bolukiluki mpo ezali moko ya misala na ngai. Na yango, nasalaki bolukiluki na babuku ya istware mpo na komona soki mbula ya boyangeli ya Artazerezese mpe badati ya Yesu ezali solo. Nsukansuka, namonaki ete esakweli wana ya Biblia ekokisamaki na ntango oyo ebongi mpe yango emonisaki ete ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe.

^ par. 19 Talá buku Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova, nkasa 197-199.