Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Biloko misato oyo mbongo ekoki kosomba te

Biloko misato oyo mbongo ekoki kosomba te

LIKAMBO ya kokamwa ezali ete ata soki balingi kolongola bango na mosala, balingi kobungisa ndako na bango to mbongo na bango ya pansiɔ, bato mingi bazalaka kaka na mposa ya kozala na eloko nyonso oyo mbongo ekoki kosomba.

Ezalaka mpasi te mpo bato ya ndenge wana bákwea na motambo ya bato oyo basalaka bapiblisite, oyo bamonisaka ete tosengeli kozala na ndako ya monene, motuka ya kitoko, mpe bilamba oyo ebimi mikolo oyo. Ozali na mbongo te? Likambo te​—okoki kodefa! Bato mingi bazalaka na mposa ya komonana malamu na miso ya bato ata soki bazali na banyongo mingi mpenza.

Nzokande, lelo to lobi, ekomonana polele ete bamilukelaki mindɔndɔ. Buku moko (The Narcissism Epidemic) elobi boye: “Kokɔta nyongo mpo na kosomba biloko ya mikolo oyo mpo bato bámona ete ozali na mbongo ekokani na moto oyo amɛlaka drɔgɛ babengi crack cocaïne mpo amiyoka malamu. Na ebandeli biloko yango mibale esɛngaka mbongo mingi te mpe esalisaka mpenza, kasi yango ezalaka kaka mpo na ntango mokuse. Nsima ya mikolo, esilisaka moto mbongo mpe akómaka konyokwama na makanisi.”

Biblia emonisi polele ete “kolakisa na lolendo biloko ya kobikela” ezali bozoba. (1 Yoane 2:16) Kutu, koluka kozala na eloko nyonso elongolaka likebi na biso na makambo oyo eleki ntina na bomoi​—biloko oyo mbongo ekoki kosomba te. Tótalela bandakisa misato.

1. BOMOKO YA LIBOTA

Brianne, * elenge mwasi moko na États-Unis, amonaka ete tata na ye azwaka mosala na ye mpe mbongo oyo azwaka na mosala yango na valɛrɛ mingi koleka. Alobi boye: “Tozali na biloko nyonso oyo tosengeli na yango mpe ezali ebele mpenza, kasi tata afandaka na ndako te mpo asalaka mibembo ntango nyonso. Nayebi ete ezali mpo na mosala, kasi libota ezali mpe na mposa na ye!”

Omituna boye: Likambo nini ya mawa ekokómela tata ya Brianne na bomoi na ye nsima ya bambula? Lokola azwaka biloko ya mokili na valɛrɛ mingi koleka, yango esali ete boyokani na ye ná mwana na ye ekóma ndenge nini? Makambo nini bato ya libota na ye balingaka asalela bango oyo eleki mbongo na valɛrɛ?

Batoli ya Biblia oyo osengeli kotalela:

  • “Bolingo ya mbongo ebimisaka mpasi ya ndenge nyonso. Bato mosusu balingaka mbongo mingi na boye ete . . . bamilukelá mpasi mingi.”​—1 Timote 6:10, Contemporary English Version.

  • “Eleki malamu kolya ndunda elongo na bato oyo olingaka na esika ya kolya misuni ya kitoko esika koyinana ezali.”​—Masese 15:17, Good News Translation.

Na mokuse: Mbongo ekoki te kosomba bomoko ya libota. Yango eyaka kaka soki bato ya libota bazali kolekisa ntango elongo mpe bazali mpenza kolingana mpe kotyelana likebi.​—Bakolose 3:18-21.

2. LIBATELI YA SOLOSOLO

Sarah, oyo azali na mbula 17 alobi boye: “Mama ayebisaka ngai ntango nyonso ete nasengeli kobala moto oyo azali na mbongo mingi mpe natánga kelasi mpo nazwa mosala oyo ekosunga ngai soki mobali atiki kopesa ngai mbongo. Makanisi na ye nyonso ezalaki kaka ndenge nini akokoba kozwaka mbongo.”

Omituna boye: Ntango nakanisaka avenire, namitungisaka mpo na makambo nini ya ntina mpenza? Ntango nini nalekisaka ndelo mpe nakómaka komitungisa mingi mpo na yango? Ndenge nini mama ya Sarah akokaki kozala na makanisi oyo ebongi na likambo etali mbongo?

Batoli ya Biblia oyo osengeli kotalela:

  • “Bótika komibombela biloko ya motuya na mabele, epai ndɔngɛ mpe koguga ebebisaka, mpe epai miyibi bakɔtaka na makasi mpe bayibaka.”​—Matai 6:19.

  • “Boyebi te ndenge bomoi na bino ekozala lobi.”​—Yakobo 4:14.

Na mokuse: Kobomba mbongo ekobatela bomoi na yo te na mikolo ezali koya. Kutu, mbongo ekoki koyibama; mpe ekoki te kobikisa maladi to kosala ete moto akufa te. (Mosakoli 7:12) Biblia eteyaka ete libateli ya solosolo eutaka na koyeba Nzambe mpe mokano na ye.​—Yoane 17:3.

3. KOSEPELA NA OYO OZALI NA YANGO

Tanya, mwasi moko ya mbula 24, alobi boye: “Baboti na ngai basalisaki ngai nazala na bomoi ya mindɔndɔ te. Ngai ná lipasa na ngai tokolaki malamu, atako mbala mingi tozalaki kaka na mwa biloko ya kobikela.”

Omituna boye: Mpo na nini ekoki kozala mpasi moto asepela na mwa biloko ya kobikela oyo azali na yango? Ndakisa nini opesaka libota na yo na ndenge otalelaka mbongo?

Batoli ya Biblia oyo osengeli kotalela:

  • “Soki tozali na bilei mpe na eloko ya kozipa nzoto, tósepela na biloko yango.”​—1 Timote 6:8.

  • “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.”​—Matai 5:3.

Na mokuse: Ezali na biloko oyo eleki mbongo na valɛrɛ mpe oyo mbongo ekoki kosomba te. Kutu, ndenge Biblia elobi: “Ata soki moto azali na biloko mingi, biloko na ye ekopesa ye bomoi te.” (Luka 12:15) Ya solo, mpo moto azala na esengo ya solosolo, esengeli azwa biyano na mituna oyo ya ntina:

  • Mpo na nini tozali awa na mabele?

  • Bomoi ekozala ndenge nini na mikolo ezali koya?

  • Ndenge nini nakoki kokokisa mposa na ngai ya koyeba Nzambe?

Batatoli ya Yehova, babimisi ya zulunalo oyo bakosepela kosalisa yo ozwa biyano na mituna yango.

^ par. 8 Na lisolo oyo bankombo mosusu ezali ya bango te.