Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Oyo osengeli koyeba mpo na maladi ya ndɛkɛ

Oyo osengeli koyeba mpo na maladi ya ndɛkɛ

MOTO moko oyo oyebani na ye akwei na nse, azali koyeba eloko moko te. Nzoto na ye ekangami, motó, makolo mpe mabɔkɔ na ye ezali koningananingana. Soki oyebi ete moto yango abɛlaka maladi ya ndɛkɛ, okoki kopesa ye mwa lisungi oyo ebongi wana ozali kozela báya kosalisa ye. Tótalela mwa makambo ya ntina oyo etali maladi yango, oyo mbala mingi bato bakokaka kolimbolaka yango te.

Maladi ya ndɛkɛ ezali nini? Maladi ya ndɛkɛ ezali maladi ya bɔɔngɔ oyo ekweisaka moto mpo na mwa ntango. Mbala mingi, moto yango alamukaka nsima ya miniti mitano. Likambo oyo elobelami na ebandeli ya lisolo oyo ezali lolenge ya makasi ya maladi yango.

Nini esalaka ete moto akwea? Bato ya mayele bakanisaka ete kokwea esalemaka soki baselile ya bɔɔngɔ esali mosala na yango malamu te. Kasi bayebaka mpenza te eloko oyo ebimisaka yango.

Soki namoni moto moko akwei makasi na maladi yango, nasengeli kosala nini? Buku moko (The Encyclopedia of the Brain and Brain Disorders) elobi boye: “Bato oyo bazali wana basengeli kotika ye ndenge wana; kasi basengeli kaka kokeba ete eloko moko te etya bomoi na ye na likama mpe apema kozanga nkaka.” Buku yango ebakisi boye: “Nzokande, soki moto yango alamuki te nsima ya miniti mitano, to kokwa elandani moko nsima ya mosusu, to mpe eleki miniti mitano mayele na ye ezali kaka kozonga te, esengeli kobenga ambulance.”

Ndenge nini nakoki kosalisa moto oyo maladi yango ekweisi ye? Tyá eloko moko ya pɛtɛpɛtɛ na nse ya motó na ye mpe longolá pene ya motó na ye biloko nyonso oyo ekoki kozokisa ye. Soki kotutuka esili, balolá ye na ndenge emonisami na lokasa 13.

Ntango moto yango alamuki nasengeli kosala nini? Ya liboso, yebisá ye ete amitungisa te. Na nsima, salisá ye atɛlɛma mpe memá ye na esika oyo akoki mpenza kopema. Bato mingi bayebaka eloko ya kosala te nsima ya kolamuka; kasi bamosusu bazwaka makasi nokinoki mpe bakoki kokoba kosala makambo bazalaki kosala.

Bato nyonso oyo bakweaka na maladi yango batutukaka? Te. Bato mosusu bayebaka lisusu makambo te mpo na mwa ntango kozanga ete bákwea na nse. Yango ezali lolenge ya pɛtɛɛ ya maladi yango (to kozanga kokwea na nse), oyo mbala mingi ezwaka ntango molai te mpe moto azongelaka makasi mbala moko nsima ya kolamuka. Maladi ya ndɛkɛ ebwakaka bato mosusu na ndenge ya makasi te kasi ekoki kozwa ntango molai mpo moto azonga ndenge azalaka. Soki esalemi bongo, moto yango akoki kokóma koyengayenga, kobendabenda bilamba na ye, to kosala makambo mosusu ya ndenge wana. Nsima na yango, akoki koyoka kizunguzungu.

Moto oyo azali na maladi ya ndɛkɛ azalaka ndenge nini? Na ntembe te, bato mingi oyo bazali na maladi ya ndɛkɛ bakómaka nsɔmɔnsɔmɔ mpo bayebaka te ntango nini mpe esika nini ekokweisa bango lisusu. Mpo na koboya motungisi, bakoki koboya kozala na bisika ya bato mingi.

Ndenge nini nakoki kosalisa moto oyo abɛlaka maladi ya ndɛkɛ? Lendisá ye alobaka ndenge azali komiyoka. Yokaká ye na likebi nyonso. Tuná ye soki akolinga osala nini soki akwei. Lokola bato yango mingi batambwisaka motuka te, mbala mosusu okoki kosɛnga ete okendaka kosombela ye biloko.

Eloko moko ekoki kosalema mpo maladi yango ebwakaka moto mingi te to ebwakaka ye te? Makambo mosusu, lokola kotungisama na makanisi to kozanga kolala mpɔngi, esalaka ete moto akweaka mbala na mbala. Na yango, bato ya mayele balendisaka bato oyo babɛlaka maladi ya ndɛkɛ ete bápemaka malamu mpe básalaka ngalasisi mbala na mbala mpo bátungisamaka mingi te na makanisi. Ntango mosusu, kozwa bankisi ya monganga esalisaka ete moto akweaka mingimingi te.