Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LAMUKÁ! No 1 2022 | Ndenge nini okoki koyika mpiko na makambo ya mpasi oyo etondi na mokili?

Lokola makambo ya mokili ezali kobeba se kobeba, mingi kati na biso tozali konyokwama mpo na makama oyo ebimaka yango moko mpe mikakatano oyo bato bazali kobimisa. Talá ndenge okoki koyikela mikakatano yango mpiko mpe oyo okoki kosala mpo omibatela mpe obatela bato oyo olingaka.

 

Ndenge ya koyika mpiko na makambo ya mpasi oyo etondi na mokili

Ntango ozali kokutana na makambo ya mpasi, zalá pene ya kozwa bikateli oyo esengeli mpo na komibatela mpe kobatela libota na yo.

1 Batelá sante na yo

Soki ozali na sante ya malamu, yango ekosala ete ozwá bikateli ya malamu ntango okutani na mokakatano moko.

2 Batelá mbongo mpe biloko na yo ya kobikela

Soki ozali kosalela mbongo na yo na mayele, yango ekosalisa yo oyeba ndenge ya kolonga makambo ya mpasi oyo ekoki kokómela yo.

3 Batelá boyokani na yo ná basusu

Talelá toli oyo mpo na kobatela libala na yo, boninga na yo ná basusu, mpe boyokani na yo ná bana na yo.

4 Batelá elikya na yo

Biblia esalisaka biso tóyeba koyika mpiko na mikakatano ya bomoi mpe epesi biso elikya mpo na mikolo ezali koya.

Na nimero oyo

Tángá masolo oyo ekoki kosalisa yo ná libota na yo boyika mpiko na makambo ya mpasi oyo ezali kokómela bato na mokili.