Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKILI OYO ETONDI NA MAKAMBO YA MPASI

2 Batelá mbongo mpe biloko na yo ya kobikela

2 Batelá mbongo mpe biloko na yo ya kobikela

MPO NA NINI EZALI NA NTINA?

Mokolo na mokolo, bato mingi basalaka makasi mpo bazwa biloko oyo basengeli na yango. Likambo ya mawa, lokola mokili oyo etondi na makambo ya mpasi yango ekoki kosala ete kozwa biloko yango ekóma lisusu mpasi mingi. Mpo na nini?

  • Ntango makambo ya mpasi esalemi na esika moko boye, yango esalaka ete biloko ya kobikela ekóma ntalo mingi, ezala bilei ata mpe ndako.

  • Makambo ya mpasi ekoki kosala ete bato babungisa misala na bango to básala misala oyo ezali na lifuti moke.

  • Makama oyo ebimaka yango moko ekoki kobebisa mimbongo, bandako, to biloko mosusu, mpe yango ekoki kosala ete bato mingi bakóma babola.

Oyo osengeli koyeba

  • Soki ozali kosalela mbongo na yo na mayele, yango ekosalisa yo oyeba ndenge ya kolonga makambo ya mpasi oyo ekoki kokómela yo.

  • Yebá ete mbongo oyo ozwaka, mbongo na yo oyo ezali na banki, to mpe biloko mosusu oyo ozali na yango ekoki mpe kosila valɛrɛ.

  • Ezali na biloko oyo mbongo ekoki kosomba te, na ndakisa esengo mpe bomoko ya libota.

Oyo okoki kosala sikoyo

Biblia elobi boye: “Soki tozali na bilei mpe na eloko ya kozipa nzoto, tósepela na biloko yango.”​—1 Timote 6:8.

Kosepela na oyo tozali na yango elimboli kozala na esengo ntango bamposa na biso ya mokolo na mokolo ekokisami. Yango ezali na ntina mingimingi soki ozali na mbongo mingi te.

Mpo na kosepela na oyo ozali na yango, osengeli kozala na bomoi ya mindɔndɔ te. Soki ozali ntango nyonso koluka kozala na biloko oyo ozali na makoki ya kosomba te okozala na mikakatano mingi ya mbongo.