Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge ya koyika mpiko na makambo ya mpasi oyo etondi na mokili

Ndenge ya koyika mpiko na makambo ya mpasi oyo etondi na mokili

Ozali nde komona lokola ete ozali kokutana na makambo ya mpasi koleka ndenge ezalaki liboso? Ozali kokutana na moko ya makambo ya mpasi oyo ezali awa na nse?

  • bitumba

  • bamaladi mabe

  • makama oyo ebimaka yango moko

  • bobola

  • kokanisela basusu mabe

  • mobulu

Soki likama moko esalemi, bato oyo bakutani na likama yango bayokaka mpasi mingi mpe bazangaka elikya. Bato mosusu kutu basilaka mpenza mayele. Kasi, ntango tokutani na likama moko, koyoka mpasi na boumeli ya ntango molai mpe komitungisa koleka ndelo ebebisaka nde makambo.

Ntango okutani na mikakatano, osengeli kosala makasi obatela bato oyo olingaka mingi, sante na yo, bomoi na yo, mpe esengo na yo mpo ezali na motuya mingi.

Okoki kosala nini mpo omibatela na makambo oyo mikakatano ya mokili oyo ezali kobimisa?