Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Libota na yo nde biso

Libota na yo nde biso

Zwá:

  1. 1. Toza’ kokita na mpepo,

    Totiki mboka mosika.

    Na mobemb’oyo,

    Banda na ndako,

    Yehova nde lobiko.

    Toz’osala mosala makasi,

    Nd’eza’ mpo na Yehova.

    Tolingaka libot’a Yehova mpenza;

    Yebá ete, ná yo,

    (MONDIMO)

    Toza’ libota moko;

    Tata se moko Yehova.

    Ata bambok’ekeseni,

    Tozali

    Libota moko.

  2. 2. Boyaki kozela mpepo

    Na mpos’a koyamba biso.

    Ntango miziki ya liyangani

    Ebandi, totalani.

    Likamwisi’oyo kaka Yehova

    Nde akoki kosala.

    Tokokumisa ye, tokolinga ye seko

    Na ekólo nyonso.

    (MONDIMO)

    Toza’ libota moko;

    Tata se moko Yehova.

    Ata bambok’ekeseni,

    Tozali

    Libota moko.

  3. 3. Mosika, mpepo’ekumbi nga’,

    Na mokili ya bapaya.

    Kuna toza’ kosakwela bato,

    Bato’ango mpe boboto.

    Mpe bolingo ya bandeko, nsɔmɔ!

    Susi ya mbok’elongwe.

    Solo, ata bambok’ezali mosika,

    Tolingani mpenza!

    (MOLƆNGƆ MOSUSU)

    Ez’esengo;

    Toza’ na libota epai n’epai!

    Na Corée tii Mexico,

    N’Angola tii Canada.

    (MONDIMO)

    Toza’ libota moko;

    Tata se moko Yehova.

    Ata bambok’ekeseni,

    Tozali

    Libota moko.

    Tokeseni bikólo,

    Kasi nde libota moko.

    Libot’a Yehov’ekende

    Nsango mpo na bolingo n’ango!

    Fiji, Bolivie, Bangi, Congo, Mali;

    Navajo, Brésil, mpe Tanzanie;

    Venezuela, Australie, mpe Allemagne,

    Tozali libota moko.