Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tozali na bomoko

Tozali na bomoko

Zwá:

  1. 1. Nkake ya botɛmɛli.

    Yang’oyo ebɛti.

    Kasi lokito n’ango

    Biso toyebi yango.

    Na mpiko tokolonga mpo,

    Yehov’aza’ ná biso.

    Ebundeli ata moko te

    Ekoki’olonga biso.

    (MONDIMO)

    Tozali na bomoko mpe,

    Toutá bipai nyonso.

    Bomoko yango ezali

    Mpo Yehov’az’osunga,

    Mpo Yehov’az’osunga.

  2. 2. Toz’ozela na kimya

    Mpo toyebi Yehova​—

    Mobikisi na biso

    Ye bolingo seko.

    Akosundola biso te,

    Mpiko na biso se ye.

    Banguna bakolonga te.

    Mpo toza’ ná Yehova!

    (MONDIMO)

    Tozali na bomoko mpe,

    Toutá bipai nyonso.

    Bomoko yango ezali,

    Mpo Yehov’az’osunga.

    (MOLONGO MOSUSU)

    Tozali liboke;

    Tokobanga bato te.

    Mitema na biso nyonso

    Topesa yango Nzambe.

    (MONDIMO)

    Tozali na bomoko mpe,

    Toutá bipai nyonso.

    Bomoko yango ezali,

    Mpo Yehov’az’osunga,

    Mpo Yehov’az’osunga.