Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tólimbisanaka

Tólimbisanaka

Zwá:

  1. 1. Nayebi’olingi kosalisa.

    Nabosani te bolamu’osalá.

    Maloba na yo nd’ezokisi nga.

    Ntang’otangisi mpisoli,

    Namoni nyonso’ebebi.

    (MONDIMO)

    Liboso moi elala,

    Ndeko, ngai ná yo tókutana.

    Tóbongisa nyonso

    Mpe tólimbisana.

    Tóbatela nde bondeko.

  2. 2. Koyokan’ezali mpasi mingi.

    Maloba mab’ekoki kobima.

    Yango nde ntin’a kolimbisa;

    Mpe okomona, ya solo,

    Ebongi kolimbisa.

    (MONDIMO)

    Liboso moi elala,

    Ndeko, ngai ná yo tókutana.

    Tóbongisa nyonso

    Mpe tólimbisana.

    Tóbatela nde bondeko.

    (MOLƆNGƆ MOSUSU)

    Eloko moko te ekabola biso. Tólingana mpenza.

    Limbisáká mpe bosan’ango.

    Yango nde boning’a solo.

    (MONDIMO)

    Liboso moi elala,

    Ndeko, ngai ná yo tókutana.

    Tóbongisa nyonso

    Mpe tólimbisana.

    Ebandaka na motema.

    Tólingana mpe tólimbisanaka.