Lakisá makambo oyo ezali na kati

Mpo na nini Batatoli ya Yehova basalaka fɛti ya mbotama te?

Mpo na nini Batatoli ya Yehova basalaka fɛti ya mbotama te?

 Biso Batatoli ya Yehova tosalaka fɛti ya mbotama te mpo toyebi ete fɛti yango esepelisaka Nzambe te. Atako Biblia epekisi fɛti ya mbotama polele boye te, esalisi biso tótalela makambo mosusu oyo etali fɛti yango mpe tóyeba ndenge Nzambe atalelaka yango. Tólobela makambo yango minei mpe tótala oyo Biblia elobi mpo na yango.

  1.   Fɛti ya mbotama eutá epai ya bapakano. Buku moko (Funk & Wagnall Standard Dictionary of Folklore, Mythology, and Legend) elobi ete bazalaki kosalela moto fɛti ya mbotama mpo bazalaki kokanisa ete na mokolo yango “bilimo mabe mpe bandɔki bakoki kosala [moto yango] mabe” mpe ete “soki baninga bazali wana mpe batombeli ye azala na bomoi ya malamu ekobatela ye.” Buku mosusu (The Lore of Birthdays) elobi ete na ntango ya kala, kokanisa mokolo ya mbotama ya moto ‘ezalaki kosalisa mingi mpenza mpo na koyeba, na nzela ya minzoto, makambo oyo ekokómela ye (horoscope), na lisalisi ya mayele ya molili ya astroloji.’ Buku yango ebakisi ete “bato bazalaki kokanisa ete babuji oyo basalelaka na anivɛrsɛrɛ ya mbotama ezalaka na nguya moko boye ya maji oyo epesaka bato makambo oyo balingi.”

     Nzokande, Biblia epekisi misala ya maji, kosakola makambo ebombaná, misala ya bilimo mabe, to “makambo oyo ekokani na oyo wana.” (Kolimbola Mibeko 18:14; Bagalatia 5:19-21) Kutu, ntina moko oyo Nzambe apesaki bato ya Babilone ya kala etumbu ezalaki ete bafandi ya engumba yango bazalaki kosala astroloji, oyo esalemaka mpo na koluka koyeba makambo ebombaná. (Yisaya 47:11-15) Biso Batatoli ya Yehova tolukaka te koyeba esika mimeseno nyonso eutá; kasi, soki makanisi ya Biblia ezali polele na likambo moko, totosaka yango.

  2.   Bakristo ya liboso bazalaki kosala fɛti ya mbotama te. Buku moko (The World Book Encyclopedia) elobi ete bakristo ya liboso “bazalaki komona ete kosalela moto fɛti ya mbotama ezali momeseno ya bapakano.” Biblia emonisi ete bantoma mpe bato mosusu oyo Yesu ateyaki bazali ndakisa oyo bakristo nyonso basengeli kolanda.​—2 Batesaloniki 3:6.

  3.   Molulu kaka moko oyo bakristo bazwá etinda ya kosalaka ezali mbotama te, kasi nde liwa ya Yesu. (Luka 22:17-20) Ezali likambo ya kokamwa te mpo Biblia elobi ete “mokolo ya liwa eleki mokolo ya kobotama.” (Mosakoli 7:1) Tii na nsuka ya bomoi na ye awa na mabele, Yesu amisalelaki nkombo malamu liboso ya Nzambe; na yango mokolo ya liwa na ye ezalaki na ntina mingi koleka mokolo ya mbotama na ye.​—Baebre 1:4.

  4.   Biblia elobeli, ata na esika moko te, mosaleli ya Nzambe oyo asalaki fɛti ya mbotama. Ezali te mpo Biblia ebosani, mpo elobeli bafɛti mibale ya mbotama ya bato oyo bazalaki kosambela Nzambe te. Kasi, elobeli bafɛti yango na ndenge ya malamu te.​—Ebandeli 40:20-22; Marko 6:21-29.

Bana ya Batatoli ya Yehova bamonaka ete bazangaka eloko moko ndenge basalaka fɛti ya mbotama te?

 Ndenge moko na baboti nyonso ya malamu, Batatoli balingaka bana na bango na boumeli ya mbula, bakabelaka bango biloko, basakanaka na bango mpe basepelaka elongo na baninga. Balukaka kolanda ndakisa malamu ya Nzambe, oyo apesaka bana na ye biloko nyonso ya malamu. (Matai 7:11) Bana ya Batatoli bamonaka te ete bazangaka eloko; talá oyo balobi:

  •   “Esengo elekaka makasi soki bakabeli yo eloko na ntango ozalaki kozela yango te.”​—Tammy, azali na mbula 12.

  •   “Baboti na ngai bakabelaka ngai biloko te na mokolo ya mbotama na ngai, kasi basalaka yango na mikolo mosusu. Nalingaka bongo mpe esepelisaka ngai mingi.”​—Gregory, azali na mbula 11.

  •   “Kolekisa mwa miniti zomi elongo, kolya mwa bagato, mpe koyemba mwa nzembo, yango nde fɛti? Bóya epai na biso komona ndenge fɛti ezalaka!”​—Eric, azali na mbula 6.