Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kozala moto ya elimo elimboli nini? Nakoki kozala moto ya elimo ata soki nazali kosambela na lingomba moko te?

Kozala moto ya elimo elimboli nini? Nakoki kozala moto ya elimo ata soki nazali kosambela na lingomba moko te?

Eyano ya Biblia

 Na Biblia, ntango basaleli maloba “moto ya elimo” ekoki komonisa moto oyo azalaka na mposa makasi mpe alingaka kosepelisa Nzambe mpe koyokanisa makanisi na ye ná oyo ya Nzambe. Moto ya elimo asalaka makasi ayokanisa bomoi na ye na mibeko ya Nzambe mpe alandaka litambwisi ya elimo santu na ye. a​—Baroma 8:5; Baefese 5:1.

 Mpo na kolimbola moto ya elimo, mbala mingi Biblia ekesenisaka moto ya mosuni ná moto ya elimo. Na ndakisa, na kokesana na moto ya elimo, “moto ya mosuni ayambaka makambo ya elimo ya Nzambe te,” to mateya ya Nzambe. (1 Bakorinti 2:14-16) Na kokesana na bato ya elimo, bato ya mosuni balendisaka “zuwa mpe koswana” na esika ya kolendisa ezaleli ya kokaba mpe kimya. (1 Bakorinti 3:1-3) Mpe baoyo balobaka lokuta mpe bakabolaka baninga ya motema babengami bato ya mosuni, oyo bazangá elimo.”​—Yuda 19; Masese 16:28. b

Na lisolo oyo, tokolobela:

 Epai wapi likoki ya kozala moto ya elimo eutá?

 Tozali na likoki ya kozala bato ya elimo mpo tokelamá na elilingi ya Nzambe. (Ebandeli 1:27) Yango ezali kokamwisa te, mpamba te ebele ya bato babendamaka na biloko oyo emonanaka te mpe bazwaka yango na valɛrɛ mingi.

 Tobotamá na likoki ya komonisa bizaleli ya Yehova c Nzambe, na ndakisa, kimya, motema mawa, mpe kozanga kopona bilongi. (Yakobo 3:17) Longola yango, Nzambe akómisaka makasi elimo ya bato oyo basalaka milende mpo na kotosa mibeko na ye.​—Misala 5:32.

 Mpo na nini ezali na ntina kozala moto ya elimo?

 Kozala moto ya elimo ememaka na “bomoi mpe kimya.” (Baroma 8:6) Bomoi mpe kimya yango ezali makabo oyo euti na Nzambe, mpe ezali na valɛrɛ mingi mpenza soki tokokanisi yango na biloko mosusu nyonso.

  •   Bomoi: Nzambe alaki kopesa bato ya elimo bomoi ya seko.​—Yoane 17:3; Bagalatia 6:8.

  •   Kimya: Ezali kimya elongo na Nzambe. Baoyo bamipesaka kaka mpo na koluka kokokisa bamposa na bango ya mosuni bazali banguna ya Nzambe. (Baroma 8:7) Lisusu, Nzambe apesaka mbano na baoyo balukaka lisusu kokóma bato ya elimo ntango apesaka bango “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso.” (Bafilipi 4:6, 7) Kimya yango ya motema esalisaka bango bázala na bomoi ya esengo.​—Matai 5:3.

 Nakoki kosala nini mpo nakóma moto ya elimo?

  •   Luká koyeba mibeko ya Nzambe mpe tosáká yango. Okoki kosala yango ntango ozali kotánga Biblia, oyo ezali na makanisi ya Nzambe, oyo ekomamaki na bato ‘ndenge elimo santu ezalaki kotinda bango.’ (2 Petro 1:21) Makambo oyo okoyekola, oyo ekomami na litambwisi ya elimo santu ya Nzambe mpe eyokani na mokano na ye, ekosalisa yo asambela Nzambe “na elimo mpe na solo.”​—Yoane 4:24.

  •   Bondeláká Nzambe mpo asalisa yo. (Luka 11:13) Nzambe akosalisa yo omonisa bizaleli oyo moto ya elimo asengeli kozala na yango. (Bagalatia 5:22, 23) Longola yango, akopesa yo bwanya mpo olonga mikakatano ya bomoi.​—Yakobo 1:5.

  •   Zalá moninga ya bato ya elimo. Bakolendisa yo mpo okóma moto ya elimo. (Baroma 1:11, 12) Kasi, kosala boninga na bato oyo makanisi na bango ekeseni na oyo ya Nzambe, ekoki kolɛmbisa yo mpo okoba te kozala moto ya elimo.​—Yakobo 4:4.

 Nasengeli kozala na lingomba moko mpo nazala moto ya elimo?

 Te. Mpamba te kozala na lingomba moko ekoki te kosala ete moto azala moto ya elimo. Biblia elobi: “Soki moto amonaka ete asambelaka na ndenge oyo ebongi nzokande apekisaka lolemo na ye te, kasi azali kokoba kokosa motema na ye moko, losambo ya moto yango ezali mpamba.”​—Yakobo 1:26.

 Atako bongo, Biblia emonisi ete bato ya elimo basambelaka Nzambe na ndenge oyo andimaka. Bato ya elimo bandimaka ete ezali na “elimo kaka moko,” elingi koloba, elimo santu. Elimo yango etindaka bango básambela Nzambe lokola ‘nzoto kaka moko,’ etuluku moko oyo ebongisami mpe oyo ebatelaka “bomoko ya elimo na ekanganeli ya kimya oyo esangisaka.”​—Baefese 4:1-4.

 Makanisi ya libunga oyo bato bazalaka na yango mpo na kozala moto ya elimo

 Likanisi ya libunga: Makambo ya elimo esangisi lolenge nyonso ya bomoi oyo esalaka ete moto amiyoka azali na esengo to akokisa makambo nyonso oyo akani kosala.

 Likanisi ya solo: Na Biblia, moto ya elimo azali moto oyo atambwisaka bomoi na ye mpe ayokanisaka yango na makanisi ya Nzambe. Biblia emonisi ete moto akoki te komiyoka moto ya esengo kozanga ete Nzambe atambwisa ye. Bato ya elimo bakómaka na esengo ntango bandimaka Yehova lokola Mozalisi na bango mpe bayokanisaka bomoi na bango na mokano na ye.​—Nzembo 100:3.

 Likanisi ya libunga: Moto akoki kokóma moto ya elimo soki azali komipimela makambo mingi ya mosuni to azali kominyokola.

Likanisi ya solo: Momeseno ya koyokisa nzoto mpasi ezali “losambo oyo moto amityeli ye moko” mpe Biblia etángi momeseno yango na kati ya misala ya nzoto. (Bakolose 2:18, 23) Biblia emonisi ete kozala moto ya elimo ememelaka moto esengo, kasi mpasi te.​—Masese 10:22.

 Likanisi ya libunga: Boyokani nyonso na mokili ya bilimo, na ndakisa na nzela ya misala ya bilimo mabe, esalaka ete moto akóma moto ya elimo.

 Likanisi ya solo: Mokano mosusu ya misala ya bilimo mabe ezali ya kotinda bato bákanisa ete bato oyo bazali na bomoi bakoki kosolola na bilimo ya bato oyo bakufá. Kasi, Biblia eteyaka ete bakufi bayebi ata eloko moko te. (Mosakoli 9:5) Misala ya bilimo mabe etindaka bato bákóma kosolola na bikelamu ya elimo oyo batɛmɛlaka Nzambe. Nzambe ayinaka misala ya bilimo mabe mpo misala yango epekisaka moto oyo asalaka yango akóma moto ya elimo.​—Balevi 20:6; Kolimbola Mibeko 18:11, 12.

 Likanisi ya libunga: Bikelamu nyonso babotamá na likoki ya kozala bato ya elimo.

 Likanisi ya solo: Eloko nyonso oyo Nzambe akelá epesaka ye nkembo. (Nzembo 145:10; Baroma 1:20) Kasi, kaka bikelamu na ye ya maleye nde bakoki kokóma bato ya elimo. Na kokesana na bato, banyama esalelaka mayele ya lɔɔmbi (instinct) mpo na kosala makambo mpe ezali na likoki te ya kosala boninga elongo na Nzambe. Makambo oyo esalaka nde emonisaka bamposa na yango ya mosuni. (2 Petro 2:12) Yango wana, Biblia etɛmɛlaka elimo mpe makanisi ya bato ya mosuni.​—Yakobo 3:15; Yuda 19.

a Na minɔkɔ ya ebandeli oyo bakomaki na yango Biblia, liloba oyo ebongolami na “elimo” elimboli mpenzampenza “pema.” Atako Elimo ezali na ndimbola mingi, yango nyonso elakisi eloko moko oyo emonanaka te, kasi ezali nguya oyo ezali kosala mosala. Biblia emonisi Nzambe lokola Moto ya elimo oyo aleki na molɔ́ngɔ́ mobimba. Moto ya elimo atikaka ete mokano ya Nzambe mpe elimo na ye etambwisa ye.

b Na Biblia, liloba “mosuni” mpe “nzoto” ntango esalelamaka mpo na kolobela bato emonisaka bato oyo makanisi mpe misala na bango etambwisami na makambo ya mosuni to bamposa ya mosuni, oyo eyokani mpenza te na mibeko ya Nzambe to ezali kobuka yango.

c Yehova ezali nkombo ya Nzambe na Biblia.​—Nzembo 83:18.