Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndenge nini nakoki koyeba lingomba ya solo?

Ndenge nini nakoki koyeba lingomba ya solo?

Eyano ya Biblia

 Biblia eyebisi ndenge ya kokesenisa baoyo bazali na lingomba ya solo ná baoyo bazali na lingomba ya lokuta; elobi boye: “Bokoyeba bango na mbuma na bango. Babukaka mbuma ya vinyo na nzete ya nzubɛ te to mbuma ya figi na nzete ya nsɛndɛ te, boye te?” (Matai 7:16) Ndenge kaka okoki kokesenisa nzete ya vinyo ná nzete ya nsɛndɛ soki otali mbuma na yango, okoki mpe kokesenisa lingomba ya solo ná oyo ya lokuta na mbuma na yango, to na makambo oyo elandi.

  1.   Lingomba ya solo eteyaka makambo oyo euti na Biblia, kasi te na bafilozofi ya bato. (Yoane 4:24; 17:17) Na ndakisa, eteyaka solo na likambo etali molimo mpe elikya ya bomoi ya seko na paradiso awa na mabele. (Nzembo 37:29; Yisaya 35:5, 6; Ezekiele 18:4) Ebangaka mpe te komonisa polele mangomba ya lokuta.​—Matai 15:9; 23:27, 28.

  2.   Lingomba ya solo esalisaka bato báyeba Nzambe, eteyaka bango nkombo na ye, Yehova. (Nzembo 83:18; Yisaya 42:8; Yoane 17:3, 6) Eteyaka te ete bato bakoki koyeba Nzambe te to azali mosika na bato; eteyaka nde ete Nzambe alingi tózala baninga na ye.​—Yakobo 4:8.

  3.   Lingomba ya solo eteyaka ete Nzambe akopesa bato lobiko na nzela ya Yesu Kristo. (Misala 4:10, 12) Bandimi ya lingomba yango batosaka makambo oyo Yesu ateyaki mpe basalaka makasi bálanda ndakisa na ye.​—Yoane 13:15; 15:14.

  4.   Lingomba ya solo emonisaka ete kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekolongola bato na mpasi. Bandimi na yango basakolaka Bokonzi yango na molende.​—Matai 10:7; 24:14.

  5.   Lingomba ya solo esalisaka bandimi na yango bálingana na motema moko. (Yoane 13:35) Eteyaka bango komemya bato ya bikólo mosusu mpe endimaka bato ya loposo nyonso, ya mimeseno nyonso, ya minɔkɔ nyonso, mpe ya lolenge nyonso. (Misala 10:34, 35) Lokola bandimi na yango balinganaka, bakendaka etumba te.​—Mika 4:3; 1 Yoane 3:11, 12.

  6.   Lingomba ya solo ezali te na bakonzi oyo bazwaka lifuti; epesaka mpe bandimi na yango batitre ya lingomba to ya lokumu te.​—Matai 23:8-12; 1 Petro 5:2, 3.

  7.   Lingomba ya solo ekɔtaka ata moke te na makambo ya politiki. (Yoane 17:16; 18:36) Kasi, bandimi na yango batosaka mpe bamemyaka bakonzi ya guvɛrnema ya mboka na bango, na boyokani na etinda ya Biblia oyo elobi ete: “Bózongisela Kaisala [elingi koloba bakonzi ya leta] biloko ya Kaisala, kasi Nzambe biloko ya Nzambe.” (Marko 12:17; Baroma 13:1, 2).

  8.   Lingomba ya solo esimbi makambo nyonso ya bomoi ya moto, ezali kaka te kolanda milulu to kokende ndako-nzambe. Bandimi na yango basalelaka toli ya Biblia na makambo nyonso ya bomoi na bango. (Baefese 5:3-5; 1 Yoane 3:18) Atako bongo, bazalaka mawamawa te, bazali nde bato ya esengo mpo basambelaka “Nzambe ya esengo.”​—1 Timote 1:11.

  9.   Bato oyo bazali na lingomba ya solo baleki ebele te. (Matai 7:13, 14) Mbala mingi, bato batyolaka baoyo bazali na lingomba ya solo, basɛkaka bango, mpe banyokolaka bango mpo basalaka mokano ya Nzambe.​—Matai 5:10-12.

Lingomba ya solo ezali lingomba oyo omoni ete ebongi na yo

 Ezali likama kopona kozala mondimi ya lingomba moko kaka mpo esepelisi yo. Biblia esakolaki ete bato “bakozwa bateyi ebele [ya mangomba] mpo báyokisaka bango makambo oyo matoi na bango elingi koyoka.” (2 Timote 4:3) Nzokande, Biblia elendisi biso tólanda “losambo oyo ezali pɛto mpe na mbindo te na miso ya Nzambe na biso mpe Tata,” ata soki bato mingi basepelaka na yango te.​—Yakobo 1:27; Yoane 15:18, 19.