Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Nasala nini mpo nalonga kotánga kelasi na mosika?

Nasala nini mpo nalonga kotánga kelasi na mosika?

 Bana-kelasi mingi bazali sikoyo kotánga kelasi na lolenge mingi; mingi na bango bazali kotánga na bandako. Soki ezali mpe bongo mpo na yo, okoki kosala nini mpo olonga? Talá mwa makambo oyo ekoki kosalisa yo. a

 Makambo 5 oyo ekosalisa yo olonga

  •   Bongisá programɛ na yo. Kobá kozala na programɛ ya malamu ya koyekola, kaka ndenge ozalaki kosala yango ntango ozalaki kokende na eteyelo. Tyá ntango oyo okobanda kosala badevuare ya kelasi, misala ya ndako mpe makambo mosusu ya ntina. Soki omoni malamu, okoki kobongisa programɛ yango lisusu.

     Toli ya Biblia: “Makambo nyonso esalema . . . na molɔngɔ.”​—1 Bakorinti 14:40.

     “Bongisá makambo ya mokolo na mokolo lokola nde ozali mpenza kokende na eteyelo. Osengeli kosala likambo na likambo na ngonga na yango.”​—Katie.

     Kanisá naino: Mpo na nini ezali malamu kosala programɛ, kokoma yango, mpe kotya yango na esika ya polele oyo okomona?

  •   Omipesa disiplini. Mpo okóma moto oyo akomeli, osengeli kosala makambo oyo obongisaki ata soki na bantango mosusu ozali na mposa ya kosala yango te. Kozongisaka makambo nsima te!

     Toli ya Biblia: “Bózala na gɔigɔi te na misala na bino.”​—Baroma 12:11.

     “Mokakatano oyo eleki monene ezalaka komipesa disiplini. Ezalaka pɛtɛɛ koluka ba raison mpe koloba ete: ‘Nakosala badevuare na ngai nsima.’ Mpe na nsima, lokola okokóma na makambo mingi ya kosala, okokoka kosala yango te.”​—Alexandra.

     Kanisá naino: Mpo na nini kosala devuare mokolo nyonso na esika moko mpe na ngonga moko ekosalisa yo omipesa disiplini?

  •   Bongisá esika ya malamu mpo na koyekola. Tyá biloko nyonso oyo ozali na yango mposa pene na yo. Salá ete esika ozali koyekola ezala malamu, kasi kolekisa ndelo te. Ozali wana mpo na koyekola kasi mpo na kolala te! Soki ozali na esika moko te mpo na kosala badevuare, okoki kosalela esika ya kolamba to shambrɛ na yo mpo na koyekola.

     Toli ya Biblia: “Myango ya moto ya etingya ememaka mpenza na litomba.”​—Masese 21:5.

     “Tyá mosika bale, masano ya video, bisaleli ya kobɛta miziki mpe saláká ete telefone na yo etya makelele te. Ezali malamu olongola biloko nyonso oyo ekoki kosala ete makanisi na yo eyengayenga.”​—Elizabeth.

     Kanisá naino: Okoki kobongisa makambo nini esika oyekolaka mpo makanisi na yo eyengayengaka te?

  •   Kotika te makanisi na yo eyengayenga. Tyá makanisi na yo na eloko moko, kasi na makambo ebeleebele te. Soki olingi kosala makambo ebele na mbala moko, ekozala mpasi te osala mabunga mpe ekozwa yo ntango mingi mpo osilisa yango.

     Toli ya Biblia: ‘Omisombela ntango oyo ebongi.’​—Baefese 5:16.

     “Ezalaki mpasi natya makanisi na likambo oyo nazalaki kosala soki nazali na telefone na mabɔkɔ. Nazalaki kolekisa ntango mingi na makambo ezangá ntina.”​—Olivia.

     Kanisá naino: Okoki kobakisa malɛmbɛmalɛmbɛ ntango oyo ozalaki kolekisa mpo na kosala devuare moko?

  •   Pemáká. Kende kotambola, kotambwisa velo, to kosala ngalasisi. Kolekisa ntango mwa moke ekoki kopesa yo makasi. Buku moko School Power elobi boye: “Silisá naino badevuare na yo. Soki osilisi mosala na yo emonanaka ete ntango ya kopema ekómaka mingi.”

     Toli ya Biblia: “Mwa kopema moke eleki ebele ya mosala makasi mpe kolanda mopɛpɛ.”​—Mosakoli 4:6.

     “Mbala mingi na eteyelo balakisaka bana-kelasi ndenge ya kobɛta miziki mpe ya kosala mayemi. Sikoyo lokola nazali koyekola lisusu makambo yango te, nazali komona ete nazali kozanga eloko moko ya ntina. Namoni ete ezali na ntina kobakisa mwa makambo mosusu na programɛ ya boyekoli.”​—Taylor.

     Kanisá naino: Kominanola ya ndenge nini ekoki kosalisa yo mpo ozwa lisusu makasi ya kosala badevuare na yo?

a Ezali na lolenge mingi ya kotánga kelasi na ndako. Salelá toli oyo ezali na lisolo oyo, oyo eyokani na makambo ya bomoi na yo.