Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Nasengeli kosala nini nsima ya batisimo?—Eteni 1: Kolɛmbisa mabɔkɔ te

Nasengeli kosala nini nsima ya batisimo?—Eteni 1: Kolɛmbisa mabɔkɔ te

 Esɛngaka kobatela malamu biloko ya motuya, lokola ndako to motuka. Ezali mpe bongo mpo na boninga na yo na Nzambe. Ndenge nini okoki kobatela yango nsima ya batisimo?

Na lisolo oyo:

 Kobá koyekola Liloba ya Nzambe

 Vɛrsɛ ya ntina: “[Bókoba] kobota mbuma na mosala nyonso ya malamu mpe kokola na boyebi ya solosolo ya Nzambe.”—Bakolose 1:10.

 Elimboli: Nsima ya batisimo, osengeli kokoba kotánga Biblia mpe kokanisa na likebi makambo oyo oyekoli.—Nzembo 25:4; 119:97.

 Oyo ekoki kosalema: Na bantango mosusu, okozala na mposa ya kotánga te. Okoki koloba ete ozali moto oyo “amesaná kotánga te.”

 Oyo okoki kosala: Yekolá na mozindo makambo ya Biblia oyo esepelisaka yo. Tyá programɛ ya boyekoli oyo ebongi na yo—oyo ekokómela yo kilo te. Mokano na yo ezali ya kokolisa bolingo mpo na Yehova mpe Liloba na ye. Koyekola ndenge wana ekosalisa yo mingi mpe okosepela na yango.—Nzembo 16:11.

 Likanisi: Mpo boyekoli na yo esalisa yo mpenza, mekáká koluka esika ya kimya, epai moto akotungisa yo te.

 Ozali na mposa ya lisalisi?

 Kobá kobondela Yehova

 Vɛrsɛ ya ntina: “Bómitungisaka ata na likambo moko te. Kasi na likambo nyonso, na libondeli, na lilɔmbo mpe matɔndi, bósɛngaka Nzambe lisalisi.”—Bafilipi 4:6.

 Elimboli: Kosolola na Nzambe esɛngaka kosala makambo mibale: Akoloba na yo ntango ozali kotánga Liloba na ye; yo okoloba na ye ntango ozali kobondela. Vɛrsɛ elobi ete na libondeli na yo okoki kosɛnga biloko oyo ozali na mposa na yango mpe kopesa matɔndi mpo na mapamboli oyo ozwi.

 Oyo ekoki kosalema: Na bantango mosusu, mabondeli na yo ekoki kokóma likolólikoló. Okoki kutu kobanda komituna soki Yehova ayokaka mpenza to soki alingi koyoka yo.—Nzembo 10:1.

 Oyo okoki kosala: Na kati ya mokolo, kanisáká makambo oyo okoki kobondela mpo na yango. Soki okoki kobondela te na ngonga wana, bombá likambo yango na motó mpo obondela mpo na yango na nsima. Longola makambo na yo moko, okoki mpe kobondela mpo na bamposa ya basusu.—Bafilipi 2:4.

 Likanisi: Soki omoni ete mabondeli na yo ekómi likolólikoló, bondelá Yehova mpo na yango. Alingaka koyoka mitungisi na yo nyonso, ata mpe oyo etali mabondeli na yo.—1 Yoane 5:14.

 Ozali na mposa ya lisalisi?

 Kobá kolobela bindimeli na yo

 Vɛrsɛ ya ntina: “Omibatela mpe okeba na mateya na yo ntango nyonso. . . . Soki osali bongo okomibikisa mpe okobikisa bato oyo bazali koyoka yo.”—1 Timote 4:16.

 Elimboli: Ntango ozali koyebisa basusu makambo oyo ondimaka, ozali mpe kokómisa kondima na yo makasi. Na ndenge yango, okoki kobikisa bomoi ya baoyo bazali koyoka yo, mpe bomoi na yo moko.

 Oyo ekoki kosalema: Na bantango mosusu, okozala na mposa te ya kolobela bindimeli na yo. Okoki kutu kobanga kosala yango, mingimingi na eteyelo.

 Oyo okoki kosala: Salá makasi otika te ete mayoki ya mabe, na ndakisa kobanga, etambwisa yo mpo na kozwa bikateli. Ntoma Paulo akomaki: “[Ata] soki nazali [kosakola nsango malamu] na bolingo na ngai moko te, mokumba monene oyo bapesá ngai ezali kaka.”—1 Bakorinti 9:16, 17.

 Likanisi: Sɛngá baboti na yo soki okoki koluka ndeko moko oyo akobanda kosalisa yo, ndeko moko ya lisangá oyo azali ndakisa malamu na oyo etali mosala ya kosakola.—Masese 27:17.

 Ozali na mposa ya lisalisi?

  •   Tángá:

     Mpo na nini nabangaka koyebisa basusu bindimeli na ngai?

 Kobá koyangana na makita

 Vɛrsɛ ya ntina: “Tótyelanaka likebi mpo tólendisana mpo tózala na bolingo mpe tósala misala ya malamu, tótika te koyanganaka na makita na biso.”—Baebre 10:24, 25.

 Elimboli: Tokendaka na makita libosoliboso mpo na kosambela Yehova. Kasi koyangana na makita epesaka mpe matomba mosusu mibale. Ya liboso, bandeko bakolendisa yo. Ya mibale, okolendisa bango ntango oyei na makita mpe opesi biyano.—Baroma 1:11, 12.

 Oyo ekoki kosalema: Na bantango mosusu, makanisi na yo ekoki koyengayenga, mpe ekoki kosala ete oyoka te makambo mosusu ya ntina. To mpe okoki koyoka mposa ya kotika makambo mosusu ebanda kozangisa yo makita mosusu to mpe nyonso, na ndakisa makambo ya kelasi.

 Oyo okoki kosala: Ata soki okotya makambo ya kelasi pembeni te, zalá na ekateli ya koyangana na makita pɔsɔ nyonso, mpe zalá na mokano ya kolanda malamu. Salá makasi opesaka biyano. Nsima ya makita, pesá ata moto moko longonya mpo na likambo oyo osalaki.

 Likanisi: Omibongisaka liboso. Tyá programɛ JW Library® na telefone na yo, mpe salelá esika bakomi “Réunion” mpo omona makambo oyo bakolobela na makita.

 Ozali na mposa ya lisalisi?

  •   Tángá:

     Mpo na nini kokende na makita ya lisangá?