Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Nakoki kolongwa na ndako?

Nakoki kolongwa na ndako?

 Likanisi ya kolongwa na ndako ekoki kosepelisa, kasi ekoki mpe kobangisa. Ndenge nini oyebi ete okoki kofanda na ndenge na yo moko?

 Talelá bantina oyo etindi yo osala bongo

 Ezali na bantina mingi oyo ekoki kotinda yo olongwa na ndako ya baboti​—mosusu na yango ebongi mpenza te. Na ndakisa, elenge mobali moko na nkombo Mario alobi, “nazalaki na mposa ya kolongwa na ndako mpo na kokima mikumba na ngai.”

 Mpo na koloba solo, mbala mosusu okozala na bonsomi mpenza te soki olongwe epai na bino. Onya, oyo azali na mbula 18, alobi boye: “Soki olongwe na ndako, ekosɛnga yo moko obatela esika ofandaka, omileisaka, ofuta bafaktire na yo​—baboti na yo bakozala wana te mpo na kosalisa yo!”

 Na mokuse: Esengeli oyeba mpo na nini olingi kolongwa na ndako mpo omona soki omibongisi mpo na kolongwa.

 Yebá oyo yango ekosɛnga

 Yesu alobaki: “Nani na kati na bino oyo alingi kotonga linɔ́ngi akofanda liboso te mpo na koyeba mosolo boni yango ekosɛnga, mpo na komona soki azali na oyo esengeli mpo na kosilisa yango?” (Luka 14:28) Okoki kosala nini mpo na “koyeba mosolo boni yango ekosɛnga” mpo na kolongwa na ndako? Mitalelá na makambo oyo elandi.

  OKOYEBA KOSALELA MBONGO MALAMU?

 Biblia elobi: “Mbongo ebatelaka.”​—Mosakoli 7:12.

  •  Ozalaka na mokakatano ya kobomba mbongo?

  •  Obimisaka mbongo mingi?

  •  Mbala mingi ekómelaka yo odefa mbongo epai ya moto mosusu?

 Soki oyanoli ɛɛ na moko ya mituna wana, boye likanisi ya kolongwa na ndako oyo omoni ete ezali malamu, ekoki kokómela yo bololo!

 “Yaya na ngai ya mobali alongwaki na ndako ntango akokisaki mbula 19. Na boumeli ya mbula mobimba, mbongo nyonso oyo azalaki kobomba esilaki, babɔtɔlaki ye motuka mpo afutaki nyongo na yango te, abebisaki konfianse oyo batyelaki ye, mpe akómaki kosɛnga azonga na ndako.”​—Danielle.

 Oyo okoki kosala sikoyo: Tuná baboti na yo mbongo boni basalelaka na boumeli ya sanza mobimba. Bafaktire nini bazwaka mpe ndenge nini basalelaka mbongo na bango mpo na kofuta bafaktire yango? Basalaka nini mpo bábomba mbongo?

 Na mokuse: Koyeba ndenge ya kosalela mbongo ntango ozali naino epai na bino ekosalisa yo oyeba oyo okosala soki okutani na mikakatano ya mbongo na bomoi na yo.

  OYEBI KOMIPEKISA?

 Biblia elobi: “Moto na moto akomema mokumba na ye moko.”​—Bagalatia 6:5.

  •  Ozongisaka makambo nsima?

  •  Esɛngaka baboti na yo bákundwela yo misala ya ndako oyo osali naino te?

  •  Mbala mingi ozongaka ndako na ngonga te?

 Soki oyanoli ɛɛ na moko ya mituna wana, ekozala mpasi mingi mpo oyeba kokokisa mikumba na yo ntango okolongwa na ndako ya baboti.

 “Ntango okómi na ndako na yo moko, ekozala na makambo oyo okosepela na yango mpenza te kasi ekosɛnga obomba ntango mpo na yango. Moto moko te akoyebisa yo osala yango, yango wana esengeli yo moko omipesa mpe omesana kosala bongo.”​—Jessica.

 Oyo okoki kosala sikoyo: Na boumeli ya sanza mobimba, meká kokokisa mikumba mingi na ndako na bino. Na ndakisa, tyá bopɛto na ndako yo moko, sukolá bilamba na yo, kende kosomba bilei, lambá mpokwa nyonso mpe na nsima sukolá basaani. Yango ekosalisa yo oyeba makambo oyo okobanda kosala ntango okokende kofanda na ndako na yo moko.

 Na mokuse: Komipekisa ezali na ntina soki olingi okóma kofanda yo moko.

Kolongwa na ndako kozanga komibongisa ezali lokola kopumbwa na aviɔ kozanga koyeba liboso ndenge ya kosalela parachute

  OZALAKA MOTEMA MPIƆ?

 Biblia elobi: “Bólongola makambo oyo nyonso mosika na bino: nkɛlɛ, nkanda, mabe, maloba ya kofinga.”​—Bakolose 3:8.

  •  Ezalaka mpasi oyokana malamu na basusu?

  •  Okokaka te kopekisa nkanda na yo?

  •  Olingaka ntango nyonso makambo esalema ndenge olingaka?

 Soki oyanoli ɛɛ na moko ya mituna wana, ekozala mpasi mpo ofanda na moto mosusu​—to na nsima, ofanda na molongani na yo.

 “Kofanda na bato mosusu esalisaki ngai nayeba bolɛmbu na ngai. Eteyaki ngai ete nakoki te kozela basusu bándima bizaleli oyo nazalaki komonisa mpo na mitungisi. Esɛngaki naluka ndenge ya malamu ya kosala ntango nazali na mitungisi.”​—Helena.

 Oyo okoki kosala sikoyo: Yebá ndenge ya koyokana malamu na baboti mpe bandeko na yo. Kutu, ndenge osalaka ntango baoyo ofandaki na bango lelo basali mabunga, ekomonisa ndenge okobanda kosala ntango moto mosusu oyo okofanda na ye nsima asali libunga.

 Na mokuse: Kolongwa na ndako ya baboti te mpo na kokima mikumba​—esɛngaka komibongisa malamu liboso ya kosala bongo. Mpo na nini te osolola na baoyo balongaki kosala yango? Tuná bango, bakanisi nini, libunga nini basalaki to likambo nini oyo bayebaki te kasi bayebi yango nde sikoyo. Ezali malamu kosala bongo mpo na ekateli nyonso ya monene oyo olingi kozwa!