Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Nasengeli koyeba nini mpo na masano ya video?

Nasengeli koyeba nini mpo na masano ya video?

 Mituna etali masano ya video

 Na États-Unis, epai mosala ya kobimisa masano ya video efutaka bamiliare ya badolare . . .

  1.   Mwayene ya mbula ya kobotama ya baoyo babɛtaka masano yango ezali boni?

    1.   18

    2.   30

  2.   Mibali oyo babɛtaka masano yango bazali boni, mpe basi oyo babɛtaka masano yango bazali boni?

    1.   Mibali bazali 55%; basi bazali 45%

    2.   Mibali bazali 15%; basi bazali 85%

  3.   Kati na basi mpe mibali, banani babɛtaka masano yango mingi?

    1.   Basi ya mbula 18 mpe koleka

    2.   Mibali ya mbula 17 kitá na nse

 Biyano (euti na lapolo moko ya 2013):

  1.   B. 30.

  2.   A. Basi bazali 45%​—pene na katikati ya bato nyonso oyo babɛtaka.

  3.   A. Basi ya mbula 18 mpe koleka basali 31% ya babɛti nyonso; mibali ya mbula 17 kitá na nse basali 19%.

 Mitángo wana ekoki kosalisa yo oyeba soki banani babɛtaka masano ya video. Kasi emonisi te makambo, ya mabe to ya malamu, oyo masano yango ekoki kosala epai na yo.

 Malamu na yango

 Na makambo oyo bilenge balobi mpo na masano ya video ndenge emonisami awa na nse, yo ondimi oyo wapi?

  •  “Esalisaka moto akóma na boyokani malamu na bato ya libota mpe baninga na ye.”​—Irene.

  •  “Esalisaka moto akima mikakatano ya bomoi.”​—Annette.

  •  “Esalisaka moto ayeba mbala moko oyo asengeli kosala na likambo oyo ebimi.”​—Christopher.

  •  “Esalisaka moto ayeba kosilisa makambo nokinoki.”​—Amy.

  •  “Esalisaka bɔɔngɔ; esalisaka moto akanisaka malamu mpe ayeba kobongisa makambo na mayele.”​—Anthony.

  •  “Masano mosusu esalisaka moto ayeba kosakana elongo na baninga.”​—Thomas.

  •  “Masano mosusu esalisaka moto ngalasisi mpe akómaka na nzoto ya malamu.”​—Jael.

 Ondimi maloba mosusu ya bilenge wana, to mpe yango nyonso? Masano ya video ekoki kosalisa moto na makanisi mpe na nzoto. Ata soki masano mosusu ezalaka kaka mpo na kolekisa ntango mpe “esalisaka moto akima mikakatano ya bomoi,” ndenge Annette alobaki yango, ezalaka ntango nyonso mabe te.

 ● Biblia elobi ete ‘likambo na likambo ezali na ntango na yango na nse ya lola,’ ata mpe ntango ya masano.​—Mosakoli 3:1-4.

 Mabe na yango

 Masano ya video elyaka yo ntango?

 “Soki kaka nabandi kobɛta yango, ekómaka mpasi natika. Nalobaka na nse ya motema, ‘Nabɛta lisusu mwa moke kaka!’ Nayaka koyeba nde nsima, wana nasí nalekisi bangonga ebele liboso ya ordinatɛrɛ!”​—Annette.

 “Masano ya video ekoki kolya yo ntango ebele. Okomona ofandi wana bangonga ebele mpe ozali koyoka ete osali mwa eloko mpo olongi mbala mitano na masano yango, nzokande osali ata eloko moko te.”​—Serena.

 Na mokuse: Soki obungisi mbongo, okoki lisusu kozwa yango. Kasi ezalaka bongo te mpo na ntango oyo obungisi. Na maloba mosusu, ntango ezali na ntina koleka mbongo. Yango wana, kotika eloko moko te eyiba ntango na yo!

 ● Biblia elobi: “Bókoba kotambola na bwanya . . . , bómisombela ntango oyo ebongi.”​—Bakolose 4:5.

 Masano ya video ebebisaka makanisi na yo?

 “Na masano ya video, moto akoki mpenza kosala makambo mabe oyo ekoki kokɔtisa ye bolɔkɔ to kobomisa ye.”​—Seth.

 “Na masano mingi ya video, esɛngaka kolongola banguna mpo na kokóma esika ozali kokende. Mbala mingi, yango esɛngaka koboma bango na balolenge mingi ya nsɔmɔ.”​—Annette.

 “Na bantango mosusu, okoki koloba na baninga na yo maloba ya mabe ntango bozali kobɛta masano ya video, na ndakisa ‘Kufá!’ to ‘Nakoboma yo!’”​—Nathan.

 Na mokuse: Boyá masano oyo elendisaka makambo oyo Nzambe ayinaka, na ndakisa mobulu, pite, mpe misala ya bilimo mabe.​—Bagalatia 5:19-21; Baefese 5:10; 1 Yoane 2:15, 16.

 ● Biblia elobi ete Yehova ‘ayinaka mpenza moto oyo alingaka mobulu,’ kaka te moto oyo asalaka mobulu. (Nzembo 11:5) Ata soki lisano boye to boye ya video ekomonisa te lolenge ya moto oyo okokóma, ekoki komonisa mwa moke lolenge ya moto oyo ozali sikoyo.

 Kanisá naino: Buku moko (Getting to Calm) elobi ete “masano ya video oyo elakisaka mobulu ekoki mpenza kobebisa bizaleli ya bana koleka televizyo, mpo bana batalaka kaka te elombe oyo azali kobunda mpe koboma; bango moko nde basalaka lokola elombe yango. Ndenge moko na molakisi oyo ateyaka na kelasi, masano yango eteyaka mingimingi mobulu.”​—Talá mpe Yisaya 2:4.

 Yebá kotya masano ya video na esika na yango

 Bilenge mingi bayebaka ete esengeli kolekisa ndelo te ntango babɛtaka masano ya video. Tótalela bandakisa mibale.

 “Nazalaki kobɛta masano ya video tii na butu makasi mpenza mpe nazalaki komilobela ete: ‘Nakolala kaka bangonga mitano, ekosala eloko te! Nabɛta lisusu mwa moke.’ Kasi sikoyo, nayekoli kotya masano ya video na esika na yango mpenza. Nakómi komona yango lokola kominanola ya malamu oyo nakoki kosala soki nazwi ntango. Kasi esengeli kolekisa ndelo te na makambo wana nyonso.”​—Joseph.

 “Nakitisaki bangonga oyo nazalaki kolekisa na masano ya video, mpe nazwi matomba mingi! Sikoyo nakoki kosakola malamu, kosunga bandeko ya lisangá na biso, ata mpe koyekola piano. Ekeseni mpenza na masano ya video!”​—David.

 ● Biblia elobi ete basi mpe mibali oyo bakɔmɛli ‘balekisaka ndelo te na bizaleli na bango.’ (1 Timote 3:2, 11) Basepelaka kominanola kasi bayebaka mpe ntango oyo basengeli kokata; na yango bamonisaka ete bazali na komipekisa.​—Baefese 5:10.

 Na mokuse: Kobɛta masano ya video ekoki kosepelisa soki otye yango na esika na yango. Kasi kotika te ete masano yango elya yo ntango to esala ete otya lisusu makanisi te na makambo eleki ntina na bomoi. Na esika oluka kaka kolonga ntango ozali kobɛta lisano moko ya video, ekozala nde malamu osala makasi mpo na kokokisa mikano na yo mpo olonga na bomoi ya solo!