Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Nasala nini soki nalɛmbi bomoi?

Nasala nini soki nalɛmbi bomoi?

 “Mwa bambula eleki, nazalaki komitungisa makasi, nazalaki lokola moto azali kokima likama ya mɔtɔ mikolo nyonso. Na bantango wana ya mpasi nakómaki na mposa ya komiboma. Nazalaki mpenza na mposa ya kokufa te, kasi nalingaki kaka natya nde nsuka na monyoko oyo nazalaki na yango.”​—Jonathan, 17.

 Sondage moko oyo basalaki epai ya bana-kelasi soki 14 000 emonisi ete mwana-kelasi 1 kati na bana-kelasi 5 andimaki ete mposa ya komiboma eyelaki ye na basanza 12 oyo eleki. a Okoki kosala nini soki yo mpe ozali komona ete ntina ya bomoi ezali lisusu te?

  •   Zelá. Zwá mokano ya koboya kosala makambo mbangumbangu ndenge motema na yo ezali kotinda yo. Atako mitungisi na yo ezali makasi, yebá ete ezali na makambo oyo okoki kosala mpo olonga yango.

 Okoki kokanisa ete mitungisi na yo ezali na solisyo te. Kasi makambo oyo tokanisaka ezalaka ntango nyonso bongo te. Solisyo ezali mpo na mitungisi na yo. Soki ozwi lisalisi oyo ebongi, okomona ete nzela ya kobima ezali mosika na yo te.

  •  Toli ya Biblia: “Tokamolami na ndenge nyonso, kasi tofinani te tii tózanga koningana; tosili mayele, kasi tozangi mwa nzela ya kobima te.”​—2 Bakorinti 4:8.

     Likanisi: Soki mposa ya komiboma eyelaka yo mbala na mbala, luká lisalisi. Na ndakisa, epai ya minganga oyo basalisaka maladi ya makanisi to baoyo basalisaka moto oyo alingi komiboma. Bazali bato oyo bayebi malamu ndenge ya kosalisa yo mpe bakozala mpenza na mposa ya kosala yango.

  •   Sololá na moto moko. Ezali na bato oyo batyelaka yo likebi mpe bazali na mposa ya kosalisa yo. Bato yango ekoki kozala baninga na yo mpe bato ya libota, kasi bakoyeba te makambo ezali kotungisa yo soki oyebisi bango te.

 Bato mosusu esɛngaka bálata manɛti npo na komona malamu. Moninga ya motema akoki mpe kozala lokola manɛti, akoki kosalisa yo otalela malamu likambo ozali kokutana na yango mpe ozongela esengo ya bomoi.

  •  Toli ya Biblia: “Moninga ya solosolo . . . abotami mpo na bantango ya mpasi.”​—Masese 17:17.

     Likanisi: Soki olingi kolobela likambo yango na moninga na yo, okoki kobanda boye: “Makanisi ya mabe ezali koyela ngai mingi mikolo oyo. Okosepela tósolola yango?” To okoki koloba: “Nazali na likambo moko nazali kokoka kosilisa yango ngai moko te. Okolinga kosalisa ngai?”

  •   Kutaná na monganga. Mitungisi ya makanisi na ndakisa dépression, ekoki kosilisa moto mposa ya kozala na bomoi. Likambo ya esengo ezali ete moto oyo azali kobɛla maladi ya makanisi akoki mpe kobika.

 Kaka ndenge grippe ekoki kosilisa yo mposa ya bilei, maladi ya makanisi ekoki kosilisa yo mposa ya bomoi. Kasi ndenge moko na grippe, moto oyo azali na maladi ya makanisi akoki mpe kobika.

  •  Toli ya Biblia: “Bato oyo bazali nzoto malamu bazalaka na mposa ya monganga te, kasi nde bato oyo bazali kobɛla.”​—Matai 9:12.

     Likanisi: Laláká mingi, saláká ngalasisi mpe lyáká malamu. Soki ozali malamu te na nzoto, yango ekoki kosala ete ozala mpe malamu te na makanisi.

  •   Bondelá. Biblia elobi ete Mozalisi na biso “azali monene koleka mitema na biso mpe ayebi makambo nyonso.” (1 Yoane 3:20) Ekozala malamu osolola na ye na libondeli! Bengá ye na nkombo na ye, Yehova, mpe yebisá ye ndenge ozali komiyoka.

 Mitungisi mosusu ezalaka mpenza mpasi kosilisa yango yo moko. Mozalisi na yo, Yehova, azali na mposa ya kosunga yo.

  •  Toli ya Biblia: “Bósɛngaka Nzambe lisalisi; soki bosali bongo, kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi na biso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino.”​—Bafilipi 4:6, 7.

     Likanisi: Longola koyebisa Yehova mitungisi na yo, meká kokanisa ata na likambo moko oyo okoki kopesa ye matɔndi mpo na yango na mokolo wana. (Bakolose 3:15) Soki ozali na botɔndi yango ekosalisa yo otalela makambo mingi ya bomoi na ndenge ya malamu.

 Soki omoni ete ntina ya bomoi ezali lisusu te, luká lisalisi. Yango likambo Jonathan, oyo tolobeli na ebandeli asalaki. Alobi: “Nazalaki kosolola mingi na baboti na ngai mpe nazwaki lisalisi ya monganga. Mpe lelo oyo nazali malamu mpenza. Atako mikolo nyonso ezalaka kaka ndenge moko te, kasi mposa ya komiboma eyelaka ngai lisusu te.”

a Sondage esalemaki na États-Unis na 2019, na Centres pour le contrôle et la prévention des maladies.